Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu amimonisi lisusu

Yesu amimonisi lisusu

Mokapo 129

Yesu amimonisi lisusu

BAYEKOLI bazali naino na kolemba. Bayebi te likambo nini basengeli kokanisa mpo na liyita oyo litikali mpamba; epai mosusu bazali mpe kondima litatoli na basi te. Na yango, na mpokwa mpenza ya mokolo wana na lomingo, Keleopa mpe moyekoli mosusu batiki Yelusaleme mpo na kokende na Emau, etúka moko penepene na bakilometele soko 11.

Na nzela, wana ezali bango kosolola na ntina na makambo oyo mauti koleka na mokolo wana, mopaya moko abelemi na bango, kotambola na bango nzela moko. Atuni bango ete: “Oyo makambo nini mazali bino kosolola awa na mobembo?”

Bayekoli batelemi, na elongi na mawa, mpe Keleopa ayanoli: “Lokola nde ozali mopaya, ofandi mosika na Yelusaleme, mpe ozangi koyeba makambo mabimi mikolo oyo?” Moto yango atuni ete, “Makambo nini?”

Bayanoli ete: “Makambo na ntina na Yesu na Nazarete. Banganga minene na mikonzi na biso bakabaki ye mpo na ekweli na kufa, nzokande tozalaki na elikya ete ye moto alingaki kosikola Yisraele.”

Keleopa mpe moninga na ye bayebisi makambo ya kokamwisa oyo masalemaki na mokolo yango​—komonana na baanzelu mpe liyita litikali mpamba—​kasi bandimi ete bazali mpenza kososola ndimbola ya makambo yango te. Mopaya apameli bango: “Bino bazoba! Bato na goigoi na mitema mpo na kondima makambo nyonso malobaki basakoli! Ekokaki na Klisto koyoka mpasi oyo mpe kokota na nkembo na ye te?” Mpe alimbolaki bango makambo kati na makomi na bulee na ntina na Klisto.

Nsuka na yango, babelemi na Emau, mpe moto yango asali lokola ete alingi koleka na ye. Na mposa ya koyoka makambo mingi lisusu, bayekoli babondeli ye ete: “Umela awa na biso mpo ete moi ekiti mpe butu elingi koinda.” Na bongo moto yango afandi na bango mpo na kolya. Atondi Nzambe, abuki limpa mpe abandi kokabela bango yango; ezali na ntango wana nde bayebaki nani moto yango: Yesu kati na nzoto ya moto na mosuni. Kasi na ntango wana alimwe.

Sikawa basosoli mpo na nini moto yango ayebaki makambo mingi! Balobi ete: “Wana ezalaki ye kosolola na biso na nzela mpe kofungola makomi mpo na biso, mitema na biso mizalaki na móto kati na biso te?” Baumeli te, batelemi mpe bazongi nokinoki na Yelusaleme, epai kuna bakuti bantoma mpe elongo na baoyo bayangani na bango esika moko. Liboso ete Keleopa mpe moninga na ye bakoka kofungola monoko, bamosusu, na móto nyonso, bayebisi bango ete: “Nkolo asekwi solo mpe amonani na Simona!” Na nsima, mibali mibale wana babandi koyebisa ndenge nini Yesu abimelaki bango mpe. Yango ekoki mbala minei oyo Yesu abimeli bayekoli bakeseni se na mokolo moko oyo.

Atako bikuke bikangami malamu mpo ete bayekoli bazali kobanga Bayuda, Yesu abimi pwasa mpo na mbala ya mitano. Atelemi na katikati na bango mpe alobi: “Tika kimya ezala na bino!” Bayekoli babangi, kokanisaka ete bamoni elimo moko. Na yango, kolimbolaka bango ete ezali emononeli te, Yesu alobi na bango: “Mpo na nini bobulungani kati na mitema na bino? Bozali na ntembe na mitema na bino mpo na nini? Botala maboko na ngai mpe makolo na ngai: ezali ngai mpenza; bosimba ngai mpe botala, mpamba te elimo azalaka na misuni te mpe na mikuwa te, lokola bozali komona ngai na yango.” Atako bongo, bazali bobele na nkaka mpo na kondima.

Mpo na kosalisa bango na kososola ete azali mpenza Yesu, atuni bango: “Bozali na mwa eloko na kolya awa?” Nsima na kondima eteni moko na mbisi ya kotumba mpe kolya yango, abandi koteya bango, kolobaka ete: “Oyo ezali makambo ngai nasololaki na bino, naino ezalaki ngai na bino esika moko [liboso ya liwa na ngai] ete: ekoki na makambo nyonso masili kokomama kati na mibeko na Moïse, na Basakoli, na Nzembo na ntina na ngai makokisama.”

Kokobaka lokola ete azali kotambwisa boyekoli na Biblia, Yesu ateyi bango likambo oyo: “Esili kokomama boye ete Klisto akozwa mpasi, mpe akosekwa na bakufi na mokolo na misato, mpe ete kobongolama na mitema mpo na kolimbisama na masumu, ekosakolama na nkombo na ye na mabota nyonso​—kobanda na Yelusaleme, bino bosengeli kozala batatoli na makambo oyo.”

Eyebani te soki mpo na nini Toma azali wana te na mpokwa oyo ya mokolo na lomingo mpo na bokutani wana ya ntina mingi. Yango wana, na mikolo milandi, bamosusu balobi na ye ete: “Tosili komona Nkolo!”

Kasi Toma abeti ntembe: “Soko nakomona na maboko na ye bilembo na nseté te soko mpe nakotya mosapi na ngai esika na mpota na nseté te mpe soko nakotya loboko na ngai na mopanzi na ye te, nakondima te.”

Na bongo, mikolo mwambe na nsima, bayekoli bayangani lisusu kati na ndako. Mbala oyo Toma azali elongo na bango. Atako bikuke bisili kokangama, Yesu, abimi kotelema lisusu katikati na bango mpe alobi ete: “Kimya ezala na bino!” Na nsima, kotalaka epai na Toma, asengi na ye ete: “Tya mosapi na yo awa mpe tala maboko na ngai, mpe kamata loboko na yo mpe tya yango kati na mopanzi na ngai, mpe tika kozala na ntembe kasi zala na kondima.”

Toma angangi ete: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!”

Yesu atuni ye ete: “Ondimi mpo omoni ngai? Esengo na bango bamoni te kasi basili kondima!” Luka 24:11, 13-48; Yoane 20:19-29.

▪ Mituna nini mopaya moko azali kotuna epai na bayekoli mibale na nzela ya Emau?

▪ Mopaya alobi makambo nini oyo ebeti mitema na bayekoli?

▪ Ndenge nini bayekoli bayei koyeba ete mopaya wana azali Yesu?

▪ Ntango Keleopa mpe moninga na ye bazongi na Yelusaleme, nsango nini ya esengo bayoki?

▪ Komonana na Yesu liboso na bayekoli na ye mpo na mbala ya mitano ezali na libaku nini, mpe nini esalemi na ntango yango?

▪ Likambo nini esalemi mikolo mwambe nsima na komonana ya mitano na Yesu, mpe nini esalisi Toma ete asilisa ntembe na ye mpe andima ete Yesu azali na bomoi?