Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu aoki mawa mingi kati na elanga ya Getesemane

Yesu aoki mawa mingi kati na elanga ya Getesemane

Mokapo 117

Yesu aoki mawa mingi kati na elanga ya Getesemane

NTANGO Yesu asilisaki kobondela, ye mpe bantóma na ye ya sembo 11 bayembi nzembo ya masanzoli mpo na Jéhovah. Mpe bakiti longwa na eteni na ndako na likoló, babimi na butu na malili mpe bakatisi lisusu lobwako ya Kedelona mpo na kokende na Betania. Kasi, na nzela, bafandi moke na esika oyo balingaki mingi, elanga ya Getesemane, oyo ezali na ngomba ya Olive to pene na yango. Mbala na mbala Yesu azalaki koyangana elongo na bantóma na ye na esika wana, na nsé na banzeté ya Olive.

Atiki bantoma mwambe—ntango mosusu pene na ekɔtelo ya elenga—alobi na bango ete: “Bofanda naino awa, nakei kuna kobondela.” Mpe azwi bantóma mosusu misato, Petelo, Yakobo mpe Yoane, mpe bakɔti kati na elanga. Yesu amitungisi mpe aoki mpasi mingi. Alobi na bango ete, “Molimo na ngai mozali na mawa mingi kino kufa. Botikala awa mpe bokengela na ngai elongo.”

Kotangwáká mwa moke, Yesu akwei na mabelé, atii elongi na nsé mpe abandi kobondela na molende ete: “Tata na ngai, soko ekoki, tika ete kopo oyo elongwa na ngai. Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo.” Alingi mpenza koloba nini? Mpo na nini ‘aoki mawa mingi kino kufa’? Alingi nde kobongola ekateli na ye ya kokufa mpe komipesa lokola lisiko?

Soko moke te! Yesu asengi te ete balongolela ye liwa. Nkutu likanisi mpamba oyo Petelo apesi ye mbala mosusu mpo na kopengola kufa lokola mbeka, esepelisaki ye te. Ya solo, Yesu aoki mawa mingi mpo azali kobanga motindo na liwa akokufela mosika te—lokola oyo ya mosali na mabe—ete ebwaka nsoni te likoló na nkombo ya Tata na ye. Ayebi sikawa ete nsima na mwa bangonga, akokakisama na nzeté lokola mosali na mabe mingi, lokola motuki! Tala likambo oyo lizali kopesa ye mpasi mingi.

Nsima na libondeli na ye molai, Yesu azongi mpe akuti bantóma misato na mpongi. Alobi na Petelo ete: “Bongo, boyebaki kokengela na ngai kino ntango moko te? Bokengelaka mpe bobondelaka ete boingela na komekama te.” Esosoli ye ete batungisami mingi mpe ngonga eleki mosika, abakisi ete: “Elimo ezali solo na molende, nde nzoto ezali na bolembu.”

Yesu akei lisusu mpo na mbala ya mibale kosenga na Tata na ye ete alongola “kopo” oyo emonisi mokumba oyo Jéhovah asili kopesa ye, mokano oyo asili kozwa mpo na ye. Ezongi ye, akuti lisusu bantóma misato na mpongi nzokande basengelaki kobondela mpo ete baingela na komekama te. Wana Yesu azali koloba na bango, bayebi eloko ya koyanola te.

Na nsuka, atangwaki na bango mpo na mbala ya misato, na ntáká ya mwa bametele, nsima afukami mpe, na konganga makasi mpe na mpisoli, Yesu abondeli Nzambe ete: “Tata, soki okani boye, longola kopo oyo na ngai.” Yesu azali koyoka mpasi mpenza na ntina na nsoni oyo liwa na ye lokola moto na mabe ekobwaka likoló na nkombo ya Tata na ye. Likanisi oyo ya kokweisama lokola motuki—moto oyo azali kolakela Nzambe mabe—endimamaki na ye te.

Atako bongo, Yesu akóbi kobondela, ete: “Nde mokano na ngai esalema te, kasi mokano na yo.” Na kotosáká, atyé mokano na ye na nsé na oyo na Nzambe. Na ntango wana, anzelu moko ya likoló abimeli ye mpe ayikisi ye mpiko na maloba na kolendisa. Na ntembe te, alobi na ye ete andimami epai na Tata na ye.

Oyo nde mokumba monene, Yesu amemi! Bomoi na ye ya seko mpe ya bato nyonso ezali na likámá. Mpasi ekómi makasi. Mpe Yesu abondeli lisusu na molende mingi; mpe motoki motangi na nsé lokola makila. Zulunalo moko elobeli makambo ya monganga (Journal de l’association des médecins americains) elobi ete: “Atako ezali likambo oyo lisalemaka mingi te, ekoki mbala mosusu kokóma ete moto atànga makila lokola motoki . . . na ntango atungisami mingi.”

Na nsima, Yesu azongi mpo na mbala ya misato epai na bayekoli na ye mpe akuti bango lisusu na mpongi. Balembi likoló na mawa oyo bazali na yango. Mpe alobi ete: “Bozali naino kolala? Bozali naino kopema? Ekoki! Ntango esili koya! Bazali kokaba Mwana na moto na maboko na bato na masumu. Botelema! Tokende! Botala mokabi na ngai abelemi.”

Ezali ye naino koloba, Yuda Iskariote abelemi, elongo na ebele na bato bamemi mpaká, miinda mpe bibundeli. Matai 26:30, 36-47; 16:21-23; Malako 14:26, 32-43; Luka 22:39-47; Yoane 18:1-3; Baebele 5:7.

▪ Nsima na kotika eteni na ndako na likoló, epai wapi Yesu amemi bantóma, mpe akosala nini na esika yango?

▪ Bantóma bazali kosala nini wana Yesu azali kobondela?

▪ Mpo na nini Yesu aoki mawa mingi, mpe asali libondeli nini epai na Nzambe?

▪ Likambo oyo ete motoki na Yesu ekómi lokola makila elakisi nini?