Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu apameli Bafalisai

Yesu apameli Bafalisai

Mokapo 42

Yesu apameli Bafalisai

YESU alimboli boye ete: Soko ezali na makasi na Satana ete ye azali kobengana bilimu mabe, na bongo Satana akabwani. “Soko nzeté ezali malamu, ekobota mpe mbuma malamu. Soko nde nzeté ezali mabe mbuma na yango ekozala mpe mabe. Mpamba te nzeté ekoyebana mpo na mbuma na yango.”

Ezali kozanga mayele na kokanisa ete Yesu azali kobota mbuma malamu, kobengana bilimu mabe, na makasi na Satana. Soko mbuma ezali malamu, nzeté ekoki kozala ya kopola te. Kasi, bambuma ya kopóla ya Bafalisai, elingi koloba bifundeli na bango ya lokuta mpe botemeli na bango ezangi ntina mpo na Yesu, emonisi ete bango moko bapóla. Yesu angangi ete: “Libota na bitupa! Bokoki koloba malamu na nzela nini awa ezali bino [na mitema] mabe? Mpo ete monoko ekolobaka makambo matondi na motema.”

Mpo ete maloba na biso mazali komonisa eloko nini ezali na motema na biso, makambo oyo tozali koloba ekoki komema biso na kosambisama. Yesu alobi ete ekozala boye solo: “Na mokolo na kosamba, bato bakosamba mpo na bilobaloba nyonso bizali bango koloba; mpo ete maloba na yo makolongisa yo mpe maloba na yo makokweisa yo.”

Atako Yesu akokisi bikamwiseli minene, bakomeli mpe Bafalisai basengi ye ete: “Molakisi, tolingi komona elembo uta na yo.” Ata soko bato oyo bauti na Yelusaleme bamonaki mpenza bikamwiseli na ye te, ezali na bilembeteli makasi ete bikamwiseli yango bisalemaki. Yango wana, Yesu ayanoli na bakonzi na Bayuda ete: “Libota mabe mpe na pite, bazali koluka elembo nde bakozwa elembo te bobele elembo na mosakoli Yona.”

Mpe Yesu alimboli likambo elingi ye koloba: “Lokola Yona azalaki na libumu na mbisi monene mikolo misato mpe butu misato, bongo Mwana na moto akozala na libumu na mabelé mikolo misato mpe butu misato.” Nsima wana amelamaki na mbisi, Yona abimaki lokola moto asekwi; Yesu asakolaki ete ye moko akokufa mpe akosekwa na mokolo ya misato. Nzokande, ata ntango akosekwa, bakonzi na mangomba bakoboya kondima “elembo na Yona.”

Mpo na yango, Yesu alobi ete bato na Ninive oyo babongolaki motema ntango Yona akendaki kosakola epai na bango, bakosekwa na mokolo na kosamba mpe bakokweisa Bayuda oyo bazali koboya kondima ye. Alobeli mpe mokonzi mwasi na Saba, oyo autaki na nsuka na mokili mpo na koyoka mayele na Salomo, mpe asepelaki na oyo amonaki mpe ayokaki. Yesu amonisi ete “tala, ye oyo aleki Salomo azali awa.”

Bongo na nsima, apesi elakiseli ya moto moko oyo elimu ya mbindo ebimi na ye. Kasi moto yango amitondisi na makambo malamu te, bongo bilimu nsambo bileki mabe biyei kokotela ye. Yesu alobi ete: “Ekozala mpe bongo na libota oyo na mabe.” Libota na Yisraele epetolamaki mpe ezwaki mbongwana, oyo tokoki kokokisa yango na kobima ya elimu mabe mpo na mwa ntango. Kasi botyoli na bango mpo na basakoli ya Nzambe, kino kotemela Klisto ye mpenza, emonisi ete na nsuka ezalela na bango eleki mabe na oyo ya ebandeli.

Wana Yesu azali koloba, mama na ye mpe bandeko na ye mibali bakómi mpe batelemi pembeni na ebele ya bato. Moto moko ayebisi ye ete: “Tala mama na yo mpe bandeko babali na yo batelemi libanda mpo na koluka kolobana na yo.”

Yesu atuni nde boye: “Mama na ngai nani? Mpe bandeko na ngai banani?” Kosemboláká loboko epai na bayekoli na ye, alobi ete: “Tala mama na ngai mpe bandeko na ngai! Mpo ete ye nani akosalaka mokano na Tata na ngai na likoló, ye azali ndeko mobali na ngai mpe ndeko mwasi mpe mama na ngai.” Na maloba yango, Yesu amonisi ete atako boyokani oyo ekangisi ye na libota na ye ekoki kozala makasi boni, nzokande boyokani na ye elongo na bayekoli na ye eleki lisusu makasi. Matai 12:33-50; Malako 3:31-35; Luka 8:19-21.

▪ Mpo na nini tokoki koloba na ntina na Bafalisai ete “nzeté” mpe “mbuma” ezali malamu te?

▪ “Elembo na Yona” ezali nini mpe na ndimbola nini eboyamaki na nsima?

▪ Ndenge nini libota na Yisraele na ekeke ya liboso ekokani na moto oyo elimu na mbindo ebimaki kati na ye?

▪ Ndenge nini Yesu amonisi motuya ya boyokani makasi oyo ezali kati na ye mpe bayekoli na ye?