Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu apameli lisusu bayekoli na ye

Yesu apameli lisusu bayekoli na ye

Mokapo 63

Yesu apameli lisusu bayekoli na ye

YESU mpe bantóma na ye bazali se kati na ndako ya Kapernaume. Sikawa bazali lisusu kokanisa te na ntina na kowelana oyo ezalaki kati na bango, kasi bazali nde kokanisa na ntina na likambo moko oyo mbala mosusu ebimaki na nzela ya bozongi na Kapernaume, na ntango oyo Yesu azalaki na bongo elongo te. Ntoma Yoane alobi boye: “Tomonaki moto moko kobimisaka bilimu mabe na nkombo na yo mpe topekisaki ye mpo ete atambolaki na biso elongo te.”

Yoane akanisi ete bobele bantóma nde bazali na lotomo ya kobikisa bato. Mpo na ye, moto yango azalaki na lotomo ya kosala misala na nguya te, mpamba te azalaki elongo na bango te.

Nzokande, Yesu apesi toli oyo: “Bopekisa ye te, mpamba te moto azali te oyo akosalaka mosala na nguya na nkombo na ngai mpe na nsima moke atuka ngai. Moto nani akotemela biso te azali elongo na biso. Nalobi na bino solo ete moto nani akopesa bino kopo na mai na komela na ntina ete bozali bato na Klisto, akozanga litomba te.”

Mpo na komonisa ete azali moto na Yesu, ezalaki na ntina te ete moto yango alanda ye mpenza. Lokola lisangá ya boklisto esalemaki naino te, yango elimboli te ete moto yango azalaki moto ya lisangá mosusu. Azalaki mpenza na kondima na nkombo na Yesu, mpe mpo na yango azalaki kobengana bilimu mabe. Mosala na ye ekokanaki na misala oyo engebene Yesu, esengelaki kozwa litomba. Lokola Yesu amonisi yango, mpo na mosala yango akozanga litomba te.

Kasi tokoloba boni soki moto yango abetaki libaku mpo na maloba mpe misala na bantóma? Mbele ekokaki kozala likambo monene! Yesu alobi: “Soko nde nani akotutisa moko na bandimi oyo mike libaku, eleki na malamu soko libanga monene ezingeli nkingo na ye mpe abwakami kati na mai monene.”

Yesu alimboli bongo ete bayekoli na ye basengeli kolongola na bomoi na bango eloko nyonso oyo ekoki kokweisa bango, ata ezali na motuya mingi lokola loboko, lokolo to liso. Eleki malamu kozanga eloko ya ntina mpe kokota na Bokonzi na Nzambe na esika ya kokangama na yango mpe kobwakama na Geena (fulu moko pembeni na Yelusaleme oyo móto na yango ebatelamaki), elilingi ya libebi ya seko.

Yesu abakisi likebisi oyo: “Bokeba ete botyola moko na oyo mike te. Mpamba te nazali koloba na bino solo ete, Baanzelu na bango kuna na Likoló bazali ntango nyonso kotalaka elongi na Tata na ngai oyo azali na Likoló.” Bongo na nsima amonisi motuya ya “baoyo mike” na lisolo ya moto moko, oyo azalaki na bampate nkama, mpe abungisaki moko na bango. Yesu alimboli ete moto yango akotika bampate ntuku libwa na libwa mpe akokenda koluka oyo abungi, mpe ntango akomona ye akosepela mingi koleka na ntina na ye koleka ntuku libwa na libwa oyo mosusu. “Bongo ezali mokano na Tata na bino na Likoló te ete moko na oyo mike abungana.”

Mbala mosusu wana ekanisi ye kowelana oyo ezalaki kati na bantoma mpo na koyeba nani aleki monene kati na bango, Yesu apesi bango elendiseli oyo: “Bozala na mungwa kati na bino; bozalana na kimya.” Mungwa ebongisaka bilei bizangi elengi. Na elobeli na elilingi, mungwa ebongisaka maloba ya moto mpo endimama malamu. Ntango moto azali na mungwa yango, akobatela kimya.

Kasi mpo na kozanga kokoka ya bomoto, mindondo makasi ekoki kobima. Wana lisusu, Yesu apesi batoli mpo na koyebisa nzela esengeli kolandama. “Soko ndeko na yo akosalela yo mabe, kenda koloba na ye mpo na libunga na ye, bino na ye esika moko. Soko akoyoka yo, okozwa ndeko na yo.” Alobi lisusu boye: “Soko akoyoka yo te, kamata moko to mibale na yo elongo ete likambo lindimana na monoko na batatoli mibale to misato.”

Bobele mpo na kosukisa nde Yesu alobi likambo likoki kokumbama liboso na “lisangá,” elingi koloba liboso na bankulutu baoyo, lokola bazali kokamba lisangá, bakoki kokata likambo yango. Soko mosumuki aboi kotosa ekateli na bango, “azala epai na yo lokola mopakano mpe mokongoli na mpako.”

Na kozwáká ekateli na bango, bakengeli basengeli kolanda malamumalamu mitinda ya Liloba na Nzambe. Na bongo, wana bakati ete moto boye azali na libunga mpe asengeli na etumbu, ekateli yango ‘esilaki kokangama na likoló.’ Mpe ntango ‘bakofungola yango awa na mabelé,’ elingi koloba wana bakomona ete moto azali na likambo te, ‘esilaki kofungwama mpe na likoló.’ Yesu amonisi ete na bisambiseli yango, “esika mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.” Matai 18:6-20; Malako 9:38-50; Luka 9:49, 50.

▪ Mpo na nini ezalaki mpenza na ntina te kotambola elongo moko na Yesu wana ezalaki ye na mabelé?

▪ Ezali likambo monene na kokweisa moyekoli moko ya moke, mpe ndenge nini Yesu amonisi ntina na baoyo bazali naino mike?

▪ Ekoki kozala mpo na ntina nini mpenza Yesu alendisaki bantoma na ye ete bazala na mungwa?

▪ ‘Kokanga’ mpe ‘kofungola’ elimboli nini awa?