Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu asali mobembo ya nsuka na Yelusaleme mpe abikisi bato zomi na maba

Yesu asali mobembo ya nsuka na Yelusaleme mpe abikisi bato zomi na maba

Mokapo 92

Yesu asali mobembo ya nsuka na Yelusaleme mpe abikisi bato zomi na maba

YESU akweisi mwango mabe ya Sanedrina oyo etalelaki bomoi na ye: atiki Yelusaleme mpe akei mosika na likolo, epai moi mokobimaka, na Efraïma, oyo mbala mosusu etangwi na Yelusaleme soko na bakilometele 25. Afandi kuna elongo na bayekoli na ye, mosika na banguna na ye.

Kasi, Pasika ya mobu 33 ebelemi, mpe Yesu akei nokinoki. Aleki na Samaria mpe abuti kino na Galilai. Ezali nde mbala ya nsuka akokende na etuka yango liboso ya liwa na ye. Na Galilai, emonani mpenza ete Yesu mpe bayekoli na ye basangani na bato mosusu oyo bazali kokende na Yelusaleme mpo na kokumisa Pasika. Bakamati nzela oyo ezali kokatisa Peleo, etuka oyo ezwami epai moi mokobimaka na Yordani.

Na ebandeli ya mobembo, ntango Yesu akoti kati na mboka moko moke ya Samaria to mpe ya Galilai, bato zomi bazali na maladi ya maba bayei kokutana na ye. Maladi wana mabe ekataka biteni ya nzoto mokemoke - misapi ya maboko, misapi ya makolo, matoi, zolo mpe mbebu. Mpo na kopekisa ete yango ezwa bato mosusu, Mobeko na Nzambe ezali koloba na ntina na moto na maba ete: “Akozipa mandefu na ye na likolo mpe akonganga ete: ˈMbindo, mbindo!ˈ Mikolo nyonso ezali maladi yango na ye. . . . Akofanda ye moko na ndako na ye na libanda na molako.”

Bato zomi na maba bazali kobatela mitinda na Mibeko oyo mitali bato na maba na kotelemaka mosika mpenza na Yesu. Nde, balobi na ye na mongongo makasi ete: “Yesu, Moteyi! Yokela biso mawa!”

Komonaka bango na mosika, Yesu alobi na bango: “Bokenda komilakisa epai na banganga.” Alobi na bango motindo wana mpamba te Mibeko na Nzambe mizali kopesa nzela na banganga mpo na kosakola ete bato na maba oyo babikisami bakomi peto, kopesaka bango lotomo ya kofanda lisusu elongo na bato na nzoto kolongono.

Bato zomi ya maba bazali na elikya kati na nguya ya bikamwiseli na Yesu. Atako babikisami naino te, bakei mpenza na lombango nyonso kokutana na banganga. Na nzela, kondima na bango epai na Yesu ezwi mbano: babandi komona mpe koyoka nguya ya kobikisama na bango.

Libwa kati na bato ya maba oyo bapetolamaki bakobi nzela na bango, kasi oyo ya zomi, ye Mosamaria, azongi koluka Yesu. Nini epusi ye na kosala motindo wana? Botondi mozindo mpo na likambo oyo likomeli ye. Akumisi Nzambe na mongongo makasi mpe ntango amoni Yesu, akwei na makolo na ye mpo na kotondo ye.

Nde Yesu alobi ete: “Bato zomi bapetolamaki te? Libwa mosusu bakei wapi? Moto mosusu te azongi kokumisa Nzambe, bobele mopaya oyo?”

Na nsima alobi na Mosamaria ete: “Telema, mpe kenda na yo. Kondima na yo esili kobikisa yo.”

Na kotangaka lisolo ya kobikisama na bato zomi ya maba oyo Yesu asalaki, tosengeli mpenza kosimba liteya oyo limonani kati na motuna na ye, ete: “Libwa mosusu bazali wapi?” Kozanga botondi oyo bato libwa bamonisaki ezali bongo libunga monene. Na ndakisa ya Mosamaria, tomonisaka nde botondi mpo na biloko oyo tozali kozwa epai na Nzambe, kati na yango elaka ya solo ya kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya sembo? Yoane 11:54, 55; Luka 17:11-19; Levitike 13:16, 17, 45, 46; Emoniseli 21:3, 4.

Ndenge nini Yesu akweisi mwango mabe motaleli bomoi na ye?

▪ Yesu akei epai wapi, mpe mobembo na ye ememi ye kino wapi?

▪ Mpo na nini bato na maba batelemi mosika mpe mpo na nini Yesu alobi na bango bakende komimonisa epai na banganga?

▪ Liteya nini tozwi kati na lisolo oyo?