Yesu ateyi na masese
Mokapo 43
Yesu ateyi na masese
NA NTANGO apameli Bafalisai, emonani ete Yesu azali na Kapernaume. Nsima ya mwa ntango, bobele na mokolo yango, atiki ndako epai azali kolala mpe atamboli na makolo kino na libeke ya Galilai, oyo ezali mosika te. Kuna, ebele na bato basangani. Yesu amati na masuwa, atiki libongo mpe abandi koteya bato bayangani na ngambo na mai; ateyi bango na ntina na Bokonzi na makoló na kosalelaka ebele na masese, to bilakiseli, oyo ezwami na makambo na bomoi ya mokolo na mokolo.
Liboso, Yesu alobi na ntina ya moloni moko abimi mpo na kolona. Ndambo na nkona ekwei na nzela, mpe bandeke balei yango. Mosusu ekwei likoló na mabanga. Lokola misisa na yango mikei mosika te, mwa nzeté oyo ebimi ekaoki mpo na moi makasi. Mosusu ekwei likoló na nzube, mpe nzube ebebisi nzeté wana ezali yango kokóla. Mwa nkona ekwei likoló na mabelé malamu mpe ebimisi mbuma, mosusu mokama, mosusu ntuku motoba mpe mosusu ntuku misato.
Na lisese ya mibale, Yesu akokisi Bokonzi ya Nzambe na moto moko aloni mbòto na mabelé. Wana mikolo mizali koleka, na ntango moto yango azali kolala mpe na ntango ezali ye kotala, mboto ezali kokóla. Moto yango ayebi te ndenge nini ekóli. Nzeté ebimi yango moko mpe eboti mbuma. Ntango mbuma ekómeli, moto oyo abuki yango.
Yesu apesi lisese ya misato, oyo ya moto moko alonaki nkona kitoko na elanga na ye. Kasi ezalaki bato kolala, monguna ayei mpe aloni matiti mabe katikati na nzeté na blé. Basaleli ya moto yango batuni ye soko basengeli kolongola matiti mabe. Kasi ye ayanoli: ‘Te, mpamba te, ekolokota bino matiti mabe bokopikola nzeté na blé na yango elongo. Tika yango mibale kokóla esika moko kino ntango na kobuka. Wana nakoyebisa babuki ete bapona matiti mabe, batumba yango, nde bayanganisa masangó na ebombelo.’
Na eteni elandi ya diskur na ye liboso na bibele na bato batelemi na ngambo ya mai, Yesu apesi lisusu masese mibale. Alimboli ete “bokonzi na makoló” ekokani na mbóto na sinapi oyo moto aloni. Yesu alobi ete ata ezali yango mbóto eleki moke na nyonso, nzokande wana ezali yango kokola, mbóto na sinapi ekómi nzeté eleki ndunda nyonso na molai. Bandeke mpe bayei kobombama na bitape na yango.
Bamoko bazali kobeta ntembe lelo na kolobaka ete ezali na mbóto mosusu eleki oyo na sinapi na moke. Kasi, Yesu azali koteya botanike te. Na mbóto nyonso eyebani epai na bafandi na Galilai na eleko na ye, mbóto na sinapi ezali oyo eleki moke. Bango bakangaki ntina ete Yesu azali kolobela bokoli ya kokamwa.
Mpo na kosukisa, Yesu akokisi “bokonzi na makolo” na levire oyo mwasi moko azwi mpe asangisi yango na kopo minene misato ya farine. Alobi ete na nsima levire evimbisi pâte mobimba.
Esili ye kopesa masese oyo mitano, Yesu atiki bibele bakenda mpe ye azongi esika azali kolala. Na nsima ya mwa ntango bantóma na ye zomi na mibale mpe bayekoli mosusu balandi ye.
Bazwi litomba na masese na Yesu
Ezali lolenge na sika na koteya na Yesu nde ekamwisi bayekoli ntango bayei epai na ye nsima na lisolo na ye oyo auti kosala liboso na bibele, na libongo. Ya solo, basila koyoka ye ete azali kosalela masese, kasi na motindo boye te. Yango wana batuni ye ete: “Mpo na nini ozali koloba na bango na masese?”
Ezali mpenzampenza mpo na kokokisa maloba oyo na mosakoli moko ete: “Nakozipola monoko na ngai na masese, nakoloba makambo mabombami longwa na ebandeli na mokili.” Kasi ezali bobele mpo na ntina wana moko te. Soko Yesu azali kosalela masese, ezali mpo ete alingi kobimisa makambo oyo bato bazali na yango kati na motema.
Mpo na koloba malamu, mingi kati na bango bazali kosepela na Yesu bobele mpo bazali komona ete azali mobeti malamu na masolo mpe mosali na bikamwiseli, kasi te lokola Nkolo oyo basengeli kosalela ye soki mpe kolanda ye na bolingo nyonso. Bato yango balingi te ete nsango esimba bango kino kobongola lolenge na bango ya komonela makambo to bizaleli na bango.
Na yango Yesu alobi: “Na ntina oyo nde nazali koloba na bango na masese mpo ete, ekotala bango bakomona te mpe ekoyokamela bango bakoyoka te, bakokanga mpe ntina te. Lisakoli na Yisaya ekoki mpo na bango ete: ‘. . . Mitema na bato oyo misili kokoma makasi.’”
Kasi abakisi boye: “Nde miso na bino mapambwami mpo ete mazali komona mpe matoi na bino lokola mpo ete mazali koyoka. Nazali koloba na bino solo ete basakoli mpe bayengebene mingi bazalaki na mposa na komona makambo mamoni bino nde bamonaki te mpe koyoka makambo mayoki bino nde bayokaki te.”
Bantóma 12 mpe baoyo bazali elongo na bango bazali na mitema malamu mpo na koyamba liloba. Yango wana Yesu alobi na bango ete: “Mabombami ya Bokonzi na makóló masili kopesama na bino ete boyeba yango, nde na bamosusu epesami te.” Mpo ete bayekoli na ye bazali na mposa ya kokanga ntina, Yesu alimbweli bango lisese ya moloni.
Alobi ete: “Nkona ezali Liloba na Nzambe,” mpe mabelé ezali motema. Mpo na oyo etali nkona ekwei likoló na mabelé makasi, pembeni na nzela, abakisi boye: “Satana ayei mpe abotoli Liloba na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babika te.”
Epai mosusu, mabelé masangani na mabanga likoló na yango nkona ekwei ezali elilingi ya motema ya baoyo bayoki liloba na esengo, kasi, mpo ete liloba ekoki kobota misisa epai na bango te, bakwei ntango eleko ya mimekamo eyei to na ntango ya monyoko.
Yesu alobi mpo na nkona ekwei kati na nzube, ete ezali ntango bato bayoki liloba, kasi babendami na mitungisi, na bozwi, mpe bisengo ya ntango oyo, mpe na nsima, yango eyei kobebisama mpe ekolisi mbuma te.
Mpo na nkona ya nsuka, oyo elonami na mabelé malamu, alobi ete ezali baoyo, nsima na koyoka liloba na motema malamu, bakangi yango mpe baboti mbuma na etingya.
Ezali mpenza lipamboli mpo na bayekoli na Yesu oyo bakendaki epai na ye mpo na kozwa ndimbola ya makambo ateyaki! Yesu azali kosenzela na boye ete bato bakanga ntina ya masese na ye, mpo ete solo epalangana epai ya bamosusu. Yango wana atuni ete: “Bakomemaka mwinda mpo na kotya yango na nsé na mbeki to na nsé na mbeto?” Te, “ezali mpo na kotya yango likoló na etelemelo na mwinda.” Mpo na yango apesi nde toli oyo: “Keba na lolenge ezali bino koyoka.”
Bazwi mbano na liteya mobimba
Sikawa lokola Yesu auti kolimbola bango lisese ya moloni, bayekoli balingi kozwa lisusu ndimbola ya sikisiki koleka. Basengi ye ete: “Limbwela biso lisese ya matiti mabe na elanga.”
Makanisi ya bayekoli makeseni mpenza na oyo ya ebele na bato oyo batelemaki na libongo. Bato wana bazali mpenza na mposa makasi te ya koluka koyeba ndimbola ya masese; bazali nde kosepela bobele na koyoka yango likolólikoló. Komonisaka bokeseni ezali kati na bayoki wana batelemaki pene na mai, mpe bayekoli na ye oyo bayei epai na ye na ndako, Yesu alobi ete:
“Na emekeli bino bokomekaka mpo na baninga, bakomeka mpe mpo na bino na emekeli yango mpe bakobakisela bino.” Lokola bayekoli bazali komonisa mpo na Yesu litomba monene mpe likebi, akaniseli bango na kopesaka bango mateya na mobimba na yango. Mpo na koyanola na motuna ya bayekoli na ye, Yesu alimboli ete:
“Mokoni na nkona malamu ezali Mwana na moto. Elanga ezali mokili. Nkona malamu ezali bana na Bokonzi; matiti mabe ezali bana na Oyo mabe. Moyini oyo akoni yango ezali Satana. Ntango na kobuka ezali nsuka na ekeke; babuki bazali baanzelu.”
Nsima na kopesa ndimbola mobimba ya lisese na ye, Yesu alimboli nsuka ya liteya na yango. Alobi ete, na nsuka na ekeke, “babuki mbuma,” elingi koloba baanzelu, bakokabola baklisto ya lokuta, oyo bakokani na matiti mabe, na “bana na bokonzi” mpenza. “Bana na oyo mabe” bakotyama elembo mpo na libebi, nzokande bana na Bokonzi na Nzambe, “basembwi,” bakongenga lokola moi kati na Bokonzi na Tata na bango.
Na nsima Yesu apesi mbano na mposa na bayekoli na ye na kolobeláká bango masese mosusu misato. Oyo ya liboso ezali boye: “Bokonzi na makoló ezali lokola eloko na motuya ebombami kati na elanga oyo moto akuti yango mpe abombi yango mpe, na esengo na ye akei kotekisa biloko nyonso bizali na ye mpe asombi elanga yango.”
Tala ya mibale: “Lisusu Bokonzi na likoló ezali lokola motekisi oyo azali koluka pauni kitoko. Ezwi ye pauni moko ya motuya monene, akei kotekisa biloko nyonso bizalaki na ye mpe asombi yango.”
Yesu ye moko akokani na moto oyo amoni eloko na motuya ebómbami mpe na motekisi oyo amoni pauni na motuya monene. Atekisaki nyonso, na boye ete: atikaki etelemelo na ye etombwami kati na likoló mpo na kokóma moto. Bongo, na bomoi na ye ya bomoto awa na mabelé, ayokisami nsoni mpe azwi minyoko makasi; na ndenge yango akoki mpenza mpo na kozala Mokonzi na Bokonzi na Nzambe.
Bayekoli na Yesu balendisami mpe ete bateka nyonso ezali na bango, mpo na kozwa mbano monene ya koyangela elongo na Klisto, to kozala bafandi na mabelé oyo ekotambwisama na Bokonzi. Tokotalela ete kozwa esika kati na Bokonzi na Nzambe ezali na motuya koleka eloko nyonso, motindo moko na eloko na motuya monene to na pauni ya ntalo mingi?
Mpo na kosukisa, Yesu akokisi “bokonzi na makoló” na monyama mobwakami kati na mai mpe elokoti mbisi ya lolenge nyonso. Wana mbisi eponami, oyo ekoki kolyama te ebwakami mpe oyo ya malamu ebómbami. Na yango, Yesu amonisi ete ekozala bongo na nsuka na ekeke; baanzelu bakokabola bato mabe na basembwi; bato mabe bakokende na libebi.
Yesu abandi ye moko kobwaka monyama yango, na kobyangaka bayekoli na ye ya liboso ete bazala “balòbi na bato.” Na lisungi ya baanzelu, monyama yango mozali kobwakama na boumeli ya bikeke. Na nsuka, ntango ekoki mpo na kobenda “moluba,” oyo elimboli masangá to bibongiseli nyonso ya mabelé oyo ezali komiloba ete ezali ya boklisto.
Atako mbisi oyo ekoki kolyama te ebwakami mpo na kobebisama, nzokande tokoki na esengo nyonso kotangama kati na ‘mbisi malamu’ oyo ebómbami. Soko, na ndakisa na bayekoli na Yesu, tozali komonisa mposa makasi ya koyekola mpe kokanga ntina mpenza, tokozala na esengo ya kozwa mateya makoki, mpe na nsima, lipamboli oyo ya Nzambe: bomoi ya seko. Matai 13:1-52; Malako 4:1-34; Luka 8:4-18; Nzembo 78:2; Yisaya 6:9, 10.
▪ Ntango nini mpe epai wapi Yesu azali koloba na bibele na bato na nzela na masese?
▪ Masese nini mitano oyo Yesu apesi yango epai na bibele na bato?
▪ Mpo na nini Yesu alobi ete mbóto na sinapi eleki moke kati na milona nyonso?
▪ Mpo na nini Yesu azali koloba na masese?
▪ Na likambo nini bayekoli na Yesu bakeseni na bibele?
▪ Ndimbola nini Yesu apesi mpo na lisese ya moloni?
▪ Na likambo nini bayekoli bakeseni na bibele oyo batondaki na libóngo?
▪ Nani to nini emonisami na moloni elanga, na mbuma malamu, na monguna, na ntango na kobuka mbuma mpe na babuki mbuma?
▪ Masese nini misato Yesu apesi lisusu, mpe yango eteyi biso nini?