Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu ayanoli bafundi na ye

Yesu ayanoli bafundi na ye

Mokapo 30

Yesu ayanoli bafundi na ye

BAKONZI na mangomba bafundi Yesu ete abuki mobeko ya sabata. Nde Yesu ayanoli bango ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.”

Atako Bafalisai bafundi ye, nzokande mosala na Yesu, ekokani te na oyo epekisami na mobeko ya sabata. Ezali Nzambe nde apesaki ye mokumba ya kosakola mpe kobikisa bato, mpe na ndakisa na ye, Yesu alandi kokokisa mosala na ye mokolo na mokolo. Nzokande, eyano na ye engalisi lisusu nkanda ya Bayuda, mpe bazali koluka koboma ye. Mpo na nini?

Mpamba te, bamoni ete Yesu azali bobele mobuki na sabata te, kasi bamoni lisusu ete asali lisumu monene mpo alobi ete azali Mwana na Nzambe. Nzokande, kozanga kobulungana, Yesu alimboli bango polele boyokani ya penepene oyo azali na yango elongo na Nzambe. Alobi na bango ete: “Tata alingi Mwana mpe akomonisa ye nyonso ekosalaka ye.”

Abakisi mpe boye: “Lokola Tata akosekwisa bakufi mpe akopesa bango bomoi lisusu, boye mpe Mwana akopesa bomoi na baoyo elingi ye kopesa yango.” Na bongo, Mwana azali kosekwisa uta sikawa baoyo basili kokufa na elimo! Alobi lisusu boye: “Ye oyo akoyoka liloba na ngai mpe akondima Motindi na ngai, asili kolongwa na kufa mpe koingela na bomoi.” Na nsima alobi sikisiki ete: “Ntango ekoya wana bakufi bakoyoka mongongo na Mwana na Nzambe mpe baoyo bayoki bakozala na bomoi.”

Atako na mosuni Yesu asekwisaki naino moto te, alimboli epai na bafundi na ye ete lisekwa motindo oyo ekosalema. “Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana baoyo nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”

Liboso na oyo, emonani ete Yesu alimbolaki naino na miso ya bato te mpe na polele nyonso te, mosala ya ntina oyo azali na yango kati na mokano ya Nzambe. Kasi bafundi na ye basili kozwa litatoli mosusu, longola litatoli na ye moko likolo na makambo oyo. Yango wana akundoli bango ete: “Bino botindaki bato epai na Yoane mpe atatolaki mpo na solo.”

Bobele mbula mibale eleki uta Yoane Mobatisi asololaki na bakonzi na mangomba oyo, na ntina na Ye oyo alingaki koya nsima na ye. Kokundolaka bango ete bakumisaki mingi Yoane, oyo sikawa azali na boloko Yesu alobi na bango: “Bino bosepelaki na pole na ye mwa ntango.” Yesu akundweli bango makambo oyo na elikya ete asalisa bango, ee, abikisa bango. Nzokande, azali na mposa na litatoli na Yoane te.

“Misala mizali ngai kosala, [kati na yango, ekamwiseli oyo auti kosala], mizali kotatola mpo na ngai ete Tata atindi ngai.” Abakisi lisusu ete: “Tata, Motindi na ngai, asili kotatola mpo na ngai ye moko.” Nzambe apesaki litatoli na ntina na Yesu, na ndakisa ntango ya batisimo na ye, wana alobaki ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.”

Ya solo, bafundi na Yesu bazali na ntina moko te ya koboya ye. Makomami yango moko, oyo bango bazali koloba ete bayekolaka yango, ezali kopesa litatoli na ntina na ye! Yesu asukisi na maloba oyo: “Soko bondimaki Moise, mbele bokondima ngai mpamba te, akomaki mpo na ngai. Soko nde bokondima makomi na ye te, bokondima maloba na ngai boni?” Yoane 5:17-47; 1:19-27; Matai 3:17.

Mpo na nini mosala na Yesu ezali kobuka mobeko ya sabata te?

Ndenge nini Yesu amonisi mosala monene oyo azali na yango kati na mokano ya Nzambe?

Mpo na komonisa ete azali Mwana na Nzambe, litatoli ya nani Yesu abimisi?