Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu azali komilengela mpo na kokumisa Pasiká na ye ya nsuka

Yesu azali komilengela mpo na kokumisa Pasiká na ye ya nsuka

Mokapo 112

Yesu azali komilengela mpo na kokumisa Pasiká na ye ya nsuka

MOKOLO ya mibale 11 Nisan moleki. Yesu asilisi koteya bantóma na ye likoló na ngomba ya Olive. Oyo nde mokolo motondi na mosala mpe na ntina mingi! Mbala mosusu na bozongi mpo na kolala na Betania, Yesu alobi na bantoma na ye ete: “Boyebi ete nsima na mikolo mibale Pasiká ekosalama, mpe bakokaba Mwana na moto mpo na koboma ye na nzeté.”

Emonani ete mokolo molandi, mokolo ya misato 12 Nisan, Yesu afandi na esika na kimya elongo na bantóma na ye. Lobi loleki, akweisaki polele mikóló ya mangomba mpe ayebi ete balingi koboma ye. Yango wana amonani mokolo wana te epai na bato, mpamba te alingi te ete likambo moko lipekisa ye kokumisa Pasiká elongo na bayekoli na ye na mpokwa elandi.

Na ntango wana, banganga-kapita mpe mikoló na bato bayangani na lopango ya nganga monene, Kayife. Kotungisamáká na mitema mpo na mpamela oyo Yesu alobaki na bango lobi loleki, bayangi mwango ya kokanga ye na mayele mabe ete baboma ye. Balobi ete: “Kasi na boumeli na elambo te, ete mobulu mobima kati na bato te.” Bazali kobanga bato, mpamba te balingi Yesu mingi.

Wana bakonzi ya mangomba bazali koyanga mwango mabe mpo na koboma Yesu, bazwi mopaya moko. Bakamwi na komona ete ezali moko na bantóma na Yesu, Yuda Iskariote, ye oyo Satana akónaki likanisi mabe kati na ye ete akaba Nkolo na ye. Basepeli mingi na ntango Yuda atuni bango ete: “Bolingi kopesa ngai nini soko nakokaba ye epai na bino?” Nokinoki bandimi kopesa ye paláta 30, motuya na moombo engebene Mibeko na Moïse. Uta ntango oyo, Yuda azali koluka libaku ya kokaba Yesu esika oyo bato bazali te.

Mokolo ya misato 13 Nisan mobandi na kolala na moi. Yesu alongwaki Yeriko uta mokolo ya mitano, lelo ezali butu ya motoba mpe ya nsuka oyo ye alekisi na Betania. Lobi lolandi, na mokolo ya minei, esengeli kosala bibongiseli ya nsuka mpo na Pasiká oyo ekobanda na kolala na moi. Wana ezali ntango oyo esengeli koboma mwana na mpate mpe kotumba yango nyonso. Epai wapi bakosala Elambo, mpe nani akosala bibongiseli?

Yesu apesi naino malako te mpo na likambo yango, ezali mbala mosusu mpo ete Yuda akende koyebisa banganga-kapita te esika yango mpe bakanga ye na boumeli na elambo ya Pasiká te. Kasi sikawa, ekoki kozala na nsima na midi ya mokolo na minei, longwa na Betania Yesu atindi Petelo mpe Yoane, kolobaka ete: “Kenda kobongisa Pasiká mpo na biso ete tolya yango.”

Batuni ete: “Olingi ete tobongisa yango wapi?”

Yesu alimboli ete: “Wana ekokɔta bino na mboka, mobali moko akozwana na bino komema mbeki na mai. Bolanda ye kati na ndako kuna ekokɔta ye. Mpe boloba na nkolo na ndako ete: ‘Molakisi alobi na yo ete: “Wapi eteni na ndako ebongisami mpo na bapaya, epai kuna ekoki kolya ngai Pasiká esika moko na bayekoli na ngai?”’ Ye wana akotalisa bino eteni monene na ndako na likoló ezali na biloko nyonso kati na yango. Bobongisa Pasiká na esika yango.”

Na ntembe te, nkolo na ndako azali moyekoli na ye, oyo azali komizela mbala mosusu ete Yesu asenga ye ete basalela ndako na ye mpo na libaku oyo kitoko. Atako bongo, ntango Petelo na Yoane bakómi na Yelusaleme, bamoni makambo nyonso lokola Yesu ayebisaki. Na yango, bamilengeli ete mwana na mpate ezala pene mpe ete bibongiseli nyonso bikoki kokamatama mpo ete bato 13, Yesu mpe bantóma na ye 12, bakoka kokumisa Pasiká. Matai 26:1-5, 14-19; Malako 14:1, 2, 10-16; Luka 22:1-13; Exode 21:32.

▪ Lolenge emonani, likambo nini Yesu asali mokolo ya misato mpe mpo na nini?

▪ Likita nini lisalami epai na nganga monene, mpe na mokano nini Yuda akei kotala mikóló ya mangomba?

▪ Mokolo mwa minei, Yesu atindi banani na Yelusaleme mpe mpo na ntina nini?

▪ Baoyo Yesu atindi bakuti likambo nini, oyo emonisi lisusu ete ye azali na nguya na kosala makamwisi?