Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu azali na bomoi!

Yesu azali na bomoi!

Mokapo 128

Yesu azali na bomoi!

KOMONÁKÁ ete liyita na Yesu litikali mpámba, Marie Madeleine akimi mbango mpo na koyebisa yango epai na Petelo mpe Yoane. Kasi emonani lokola ete basi mosusu batikali wana pene na liyita. Nsima mwa moke, anzelu moko abimi mpe abéngi bango ete baingela kati na yango.

Na kati, basi bamoni anzelu mosusu, mpe moko na bango mibale alobi na bango ete: “Bobanga te, mpamba te nayebi ete bozali koluka Yesu oyo abomamaki na nzeté. Azali awa te, mpo ete asili kosekwa lokola elobaki ye. Yaka kotala esika elalaki ye. Mpe bokenda mbango koloba na bayekoli na ye ete asili kosekwa.” Bongo, na bobangi mpe na esengo monene, basi yango bakimi mbango lokola.

Bobele na ntango wana, Marie akuti Petelo na Yoane mpe alobi na bango ete: “Basili kolongola Nkolo na liyita mpe toyebi te soko batii ye wapi.” Nokinoki, bantóma wana mibale bakei na lombango. Yoane oyo azali na mbango mingi—mpo ete na ntembe te azali elenge—akómi liboso na liyita, wana basi basilaki kolongwa na esika yango; moto te azali zingazinga. Kokótisáká motó kati na liyita, Yoane atali na kati mpe amoni bilamba, kasi atikali bobele na libándá.

Petelo, ye oyo auti kokóma, akóti mbala moko. Amoni bilamba bilali wana, mpe elamba oyo balingáki motó na Yesu, elingámi na esika mosusu. Sikawa, Yoane mpe akóti kati na liyita, mpe andimi oyo Marie alobaki. Kasi ezala Petelo to Yoane, moko te asosoli ete Yesu asekwi, atako ayebisaki bango mbala na mbala ete akosekwa. Na kokakatana, mibali yango mibale bazongi epai na bango, mpe batiki Marie oyo azongi lisusu na liyita.

Na ntango yango, basi mosusu bakei na lombángo mpenza mpo na koyebisa bayekoli ete Yesu asili kosekwa, lokola baanzelu batindaki bango. Wana ezali bango kopota mbango, Yesu azwani na bango mpe alobi na bango ete: “Mbote na bino!” Bakwei na makolo na ye, mpe bakumisi ye. Yesu alobi na bango ete: “Bobanga te! Bokenda koyebisa bandeko na ngai ete bakenda na Galilai; mpe bakomona ngai kuna.”

Mwa liboso, na ntango mabelé maninganaki mpe ntango baanzelu babimaki, basoda oyo bazalaki kokengela babangaki mingi mpenza mpe bakómaki lokola bakufi. Ntango bobángi bosilaki, bakendaki na engumba mpe bayebisaki epai na banganga minene, makambo manso malekaki. Nsima wana “mikoló” na Bayuda basalaki likita, ekateli moko ekamatami: esengeli kobómba likambo yango na kopesá basoda misolo. Bapesi bango etinda oyo: “Boloba ete: ‘Bayekoli na ye bayei koyiba ye na butu wana ezalaki biso kolala.’”

Kasi, lokola basoda Baloma bakoki kozwa etumbu ya liwa mpo ete balalaki na esika na kokengela, banganga balaki bango ete: “Soki likambo oyo [ete bolalaki mpongi] ekokóma na matoi na guvernere, biso tokobongisa likambo mpe bino bokozwa mpasi te.” Lokola kanyáka epesami ezali mosolo mingi, basoda balandi malako wana. Mpe nsango oyo na lokuta ete bayibi nzoto na Yesu, epalangani mingi mpenza epai na Bayuda.

Marie Madeleine oyo atikali na liyita, abandi kolela. Yesu akoki mpenza kozala wapi? Angumbami liboso mpo na kotala kati na liyita, mpe amoni baanzelu mibale balati bilamba na mpembe, babimi lisusu! Moko afandi na motó mpe mosusu na makolo esika nzoto na Yesu elalaki. Balobi na ye ete, “Mwasi, ozali kolela mpo na nini?”

Marie azongisi ete: “Balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soko batii ye wapi.” Mpe atalaki nsima amoni moto mosusu oyo atuni ye bobele motuna yango, ete: “Mwasi, ozali kolela nini?” Kasi moto wana abakisi ete: “Ozali koluka nani?”

Kokanisáká ete ezali mobateli na elanga oyo liyita lizali kati na yango, alobi na ye ete: “Nkolo, soko osili kolongola ye, yebisa ngai esika otii ye mpe nakomema ye.”

Bongo, moto wana abengi ye ete: “Marie!” Nokinoki, mpo na motindo oyo ameseni koloba na ye, asosoli ete ezali Yesu, mpe angangi ete “Rabbouni!” (oyo elimboli “Moteyi!”). Na esengo eleki ndelo, akwei na makolo na ye koyamba ye. Kasi Yesu alobi na ye ete: “Tika kokangama na ngai. Mpamba te naino nabuti epai na Tata te. Nde kenda epai na bandeko na ngai mpe loba na bango ete: ‘Nazali kobuta epai na Tata na ngai mpe Tata na bino, epai na Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.’”

Tala sikawa Marie azali kokima mbango epai kuna bantoma mpe bayekoli bayangani. Abakisi litatoli na ye likoló na oyo basi mosusu bauti kopesa, ete bamoni Yesu asekwi. Atako bongo, lokola bandimaki basi mosusu te, emonani ete mibali yango bandimi mpe Marie te. Matai 28:3-15; Malako 16:5-8; Luka 24:4-12; Yoane 20:2-18.

▪ Marie Madeleine asali nini, nsima wana bakuti ete liyita litikali mpámba, mpe nini ekómeli basi mosusu?

▪ Petelo mpe Yoane basali nini wana bakuti ete liyita litikali mpámba?

▪ Basi mosusu bakutani na nani wana ezali bango kokende koyebisa bayekoli ete Yesu asekwi?

▪ Nini ekómeli basoda oyo bazalaki kokengela, mpe banganga basalaki nini wana basoda bakei koyebisa bango?

▪ Nini esalemi wana Marie Madeleine azali bobele ye moko, mpe bayekoli basali nini wana basi bayebisi bango makambo bauti komona?