Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu mpe banganga-minzoto

Yesu mpe banganga-minzoto

Mokapo 7

Yesu mpe banganga-minzoto

TALA sikawa bato mingi bauti epai na ebimelo na moi. Ezali bongo banganga-minzoto, bato oyo balobaka ete bayebi kolimbola bilembo ya myoto. Epai na bango na ebimelo na moi, bamonaki monzoto moko ya sika. Balandaki yango mpe bauti bongo kosala ebele ya bakilometele, kino bakomi na Yelusaleme.

Sikawa lokola bakomi kati na engumba yango, banganga-minzoto batuni epai na bato ete: “Wapi ye oyo abotami mpo na kozala Mokonzi na Bayuda? Mpo ete tosili komona monzoto na ye epai na ebimelo na moi mpe toyei kokumbama liboso na ye.”

Ntango mokonzi Herode, oyo azali wana na Yelusaleme ayoki bongo, makanisi na ye mabulungani mpenza. Abengisi banganga minene mpe atuni bango ete Klisto asengeli kobotama epai wapi? Kotalaka bongo na Makomami, bazongiseli ye monoko ete: “Na Beteleme.” Bongo, Herode abengisi banganga-minzoto mpe alobi na bango ete: “Bokende mpe boluka malamu mwana yango. Soko bokozwa ye, bozonga koyebisa ngai ete ngai mpe nakende kokumbamela ye.” Nzokande Herode azali na mposa ya komona mwana mpo ete aboma ye.

Ntango banganga-minzoto babandi kokende, likambo moko ya kokamwa esalami. Monzoto oyo bamonaki na ebimelo na moi emonani lisusu liboso na bango. Yango ezali monzoto ya solosolo te; ebimi bobele mpo na kokamba bango. Balandi yango kino ntango etelemi, na likolo na ndako oyo Yozefe mpe Marie bazali kofanda.

Ekoti bango na ndako, bamoni Marie elongo na mwana na ye, Yesu. Nokinoki bakumbami liboso na ye, mpe babimisi makabo bakumbaki: wolo, mbuma na malasi mpe mafuta na mola. Nsima na mwa ntango, wana ekomi bango pene na kozonga mpe kokende koloba epai na Herode esika nini mwana azali, Nzambe akebisi bango na ndoto ete basala bongo te. Bazongi bongo na mokili na bango na nzela mosusu.

Na likanisi na yo, nani abimisaki monzoto wana na likolo mpe atambwisaki yango mpo ete ekamba banganga-minzoto? Omiku-ndola ete monzoto ekambaki bango mbala moko kino epai na Yesu na Beteleme te, kasi naino na Yelusaleme, epai bakutaki Herode oyo alukaki koboma Yesu. Mbele abomaki ye mpenza soki Nzambe akebisaki banganga-minzoto te ete bakende koyebisa ye eloko moko te. Ezalaki bongo Satan le Diable, monguna ya Nzambe, oyo alingaki koboma Yesu, ye nde asalelaki monzoto wana mpo na koluka kokokisa mposa na ye. Matai 2:1-12; Mika 5:2.

Nini emonisi ete monzeto oyo banganga-minzoto bamonaki ezalaki monzoto ya solosolo te?

Yesu azali esika nini ntango banganga-minzoto bamoni ye?

Ndenge nini toyebi ete ezali Satana nde abimisaki monzoto wana mpo ete ekamba banganga-minzoto?