Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu mpe elenge mokonzi mozwi

Yesu mpe elenge mokonzi mozwi

Mokapo 96

Yesu mpe elenge mokonzi mozwi

WANA ezali Yesu kokoba mobembo na ye na etuka ya Pelea mpo na kokenda epai na Yelusaleme, elenge mobali moko apoti mbango mpe afukami liboso na ye. Mobali yango abengami mokonzi, oyo elakisi ete azali mbala mosusu na etelemelo monene kati na Eyanganelo moko ya mboka na bango to mpe azali moko na basangani ya Sanedrin. Lisusu azali na bozwi mingi. Atuni ete: “Molakisi malamu nasala nini mpo na kosangola bomoi ya seko?”

Yesu alobi na ye ete: “Ozali kotanga ngai moto malamu mpo na nini? Moto malamu azali te, bobele Nzambe.” Elenge mobali asaleli mpenzampenza liloba “malamu” lokola nkombo ya kopesa lokumu, yango wana Yesu amonisi ye ete nkombo yango to mpe lokumu yango ebongi bobele na Nzambe.

Yesu alandi koloba: “Soki olingi ete ozala na bomoi, tosa mibeko ntango nyonso.”

Mobali yango atuni ete: “Mibeko nini?.“

Yesu ayanoli na kotangaka mibeko mitano kati na Mibeko zomi, ete: “Oboma moto te, osala ekobo te, oyiba te, otatola na lokuta te, okumisa tata na mama na yo.” Mpe abakisaki mobeko moleki ntina mpenza, ete: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.”

Mobali yango ayanoli na bosembo nyonso ete: “Nasili kotosa oyo nyonso longwa na bolenge na ngai. Eloko nini ezangi lisusu epai na ngai?”

Eyoki ye motuna wana monene mpe na ntina mingi, Yesu ayoki bolingo mpo na elenge mobali yango. Kasi, esosoli ye ete akangami mingi na biloko ya mosuni, ayebisi ye eloko oyo azali na yango mposa: “Ozangi bobele eloko moko: Kenda kotekisa biloko nyonso bizali na yo, kabola yango na babola mpe okozala na eloko na motuya na likolo; mpe yaka, landa ngai.”

Kasi mobali yango aoki mpasi mingi na motema mpe akei, na ntembe te Yesu azali kotala ye na mawa nyonso. Bozwi ya mobali wana bopekisi ye ete asosola te eloko na motuya ya solo. Yesu alobi ete: “Ezali mpasi mingi mpo na bazwi ete bakota kati na Bokonzi na Nzambe!”

Na maloba yango, bayekoli na Yesu bakamwi mingi. Kasi bakamwi lisusu koleka ntango abimisi lisusu likambo oyo ya polele: “Koingela na kamela na liso na ntonga eleki petee koleka koingela na mozwi kati na Bokonzi na Nzambe.”

Bayekoli na ye batuni ete: “Nani akoki bongo kobika?”

Yesu atali bango, mpe alobi ete: “Bato bakoki kosala yango te nde Nzambe akoki kosala nyonso. Mpo ete epai na Nzambe makambo manso makoki kosalema.”

Komonisaka ete ye mpe bayekoli mosusu basalaki liponi moko likeseni mpenza na oyo ya elenge mokonzi mozwi, Petelo alobi na Yesu ete: “Tala, biso totiki nyonso mpe tolandi yo.” Atuni boye: “Eloko nini ya ntina biso tokozwa mpenza?”

Yesu alaki ete, “Na ntango ya kozalisa ya sika, wana Mwana na moto akofanda na kiti na Bokonzi na ye na nkembo, bino baoyo bosili kolanda ngai, bokofanda mpe na kiti na bokonzi zomi na mibale kosambisa mabota zomi na mibale na Yisraele.” Ya solo, Yesu amonisi ete kozalisama ya biloko na sika ekozala awa na mabelé, na boye ete ekozonga lokola yango ezalaki kati na elanga ya Edene. Epai mosusu, Petelo mpe bayekoli mosusu bakozwa libonza na bango: bakoyangela elongo na Klisto likolo na Paradis oyo ekozala na mabele mobimba. Na ntembe te, mbano kitoko oyo ezali kosenga ata mbeka nini monene.

Kasi bayekoli bazali kozwa mbano uta sikawa, lokola Yesu alobi yango ete: “Soko moto nani atiki ndako, soko bandeko mibali, soko bandeko basi, soko mama, soko tata, soko bana, soko bilanga, mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, moto yango akozwa na ntango oyo, ndako, mpe bandeko mibali, mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana, mpe bilanga mbala mokama, na minyoko lokola, mpe akozwa bomoi ya seko na ntango ekoya.”

Lokola Yesu alaki yango, ezala esika nini bayekoli na ye bakokende kati na mokili, bazali na boyokani malamu elongo na baninga na bango baklisto, boyokani ya motuya mingi koleka oyo moto akoki kozala na yango elongo na libota na ye. Emonani lokola ete, elenge mokonzi Moyuda aboyi kozwa mbano oyo, ata mpo na kozala na bomoi ya seko kati na Bokonzi na Nzambe kuna na likolo.

Yesu abakisi lisusu: “Kasi bato mingi bazali liboso bakozala na nsima, mpe baoyo na nsima bakozala liboso.” Alingi mpenza koloba nini?

Alingi koloba ete mingi kati na baoyo bazali “liboso” mpo na kozwa mikumba na mangomba, lokola elenge mokonzi mozwi bakokota kati na Bokonzi te. Bakozala na “nsima.” Nzokande mingi kati na baoyo batalelami na Bafalisai ya lolendo lokola bato “na nsima” na ntina na boyengebene na bango moko, kati na bango mpe bayekoli basokemi na Yesu—lokola bato ya mboka, to ˈam haˈaˈrets,—bakozala “liboso.” Yango elimboli ete bakozala na libaku kitoko ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi. Malako 10:17-31; Matai 19:16-30; Luka 18:18-30.

▪ Emonani ete, elenge mobali mozwi, azali mokonzi ya lolenge nini?

▪ Mpo na nini Yesu aboyi kobyangama moto malamu?

▪ Na likambo nini ezalela ya elenge mokonzi ezali komonisa likama ya kozala na bozwi?

▪ Mbano nini Yesu alaki epai na bayekoli na ye?

▪ Ndenge nini baoyo bazali liboso bakomi nsima, mpe baoyo na nsima bakomi liboso?