Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yoane azali kobongisa nzela

Yoane azali kobongisa nzela

Mokapo 11

Yoane azali kobongisa nzela

MBULA zomi na nsambo esili koleka uta mokolo oyo Yesu, mwana na mibu zomi na mibale, afandaki na tempelo, kotunaka balakisi. Tokomi sikawa na eleko kati na nsuka ya sanza ya marsi mpe ebandeli ya aprili na mobu 29 ya ntango na biso. Bato nyonso bazali koloba mpo na Yoane, ndeko na Yesu na mama mosusu, oyo azali kosakola kati na etuka ya Yordani.

Yoane azali moto moko oyo azali mpenza kobenda likebi ya bato, ezala na bomoto na ye to na maloba na ye. Azali na elamba ya nsuki ya kamela mpe amikangi loketo na mokaba na mposo na nyama. Bilei na ye ezali mayoyo mpe mafuta na nzoi ya zamba. Nsango na ye ezali boye: “Bongola mitema, mpamba te bokonzi na makolo esili kobelema.”

Nsango yango elamusi likebi ya bayoki na ye. Mingi basosoli ete basengeli koyoka mawa mpo na mabe na bango, basengeli kobongola etamboli na bango mpe kotika bizaleli na bango ya kala na kotalelaka yango ete ezali mabe. Yango wana bato mingi bazali koya epai na Yoane; bauti na bamboka nyonso ezali penepene na Yordani, mpe ata na Yelusaleme. Yoane azali kobatisa bango na kozindisaka bango na mai ya Yordani. Kasi mpo na nini?

Batisimo ya Yoane elimboli ete baoyo bazali kozwa yango bazali solo koyoka mawa mpo na masumu oyo basalaki na kobukaka Mobeko ya Nzambe. Yango wana, na ntango bamoko na Bafalisai mpe Basadukai bayei na Yordani, Yoane akweisi bango na maloba oyo ete: “E libota na nyoka. Nani akebisi bino na kokima na nkanda ezali koya? Bobota mbuma ebongi na kobongwana na motema. Bomikembisa te mpo na kolobana na bino mpenza ete: ˈAbrahame azali tata na biso.ˈMpamba te nazali koloba na bino ete Nzambe akoki kotelemisa mpo na Abrahame bana longwa na mabanga oyo. Mpo ete epasola esili kotyama na mosisa na nzete. Nzete na nzete oyo ekobotaka mbuma kitoko te ekokatama mpe ekobwakama na mɔto.”

Nsango na ntina na Yoane epalangani mingi, ntina wana Bafalisai batindi banganganzambe mpe Balevite epai na ye. Bango batuni ye ete: “Yo nani?”

Yoane ayamboli ete, “Ngai nazali Klisto te.”

Batuni ye lisusu ete, “Boye yo nani? Yo Eliya?”

Ye ete, “Ngai te.”

“Ozali Mosakoli?”

“Te!”

Batye molende mpo na koluka koyeba. “Yo nani? ete tozongisa monoko epai na batindi na biso. Ozali koloba nini mpo na yo moko?”

Yoane alimboli ete: “Ngai nazali mongongo na mongangi kati na esobe ete: ˈBongisa nzela na Jehovah,ˈ lokola elobaki mosakoli Yisaya.”

Batuni ye mpo na koyeba ete: “Soko yo Klisto te, soko Eliya te, soko Mosakoli yango te, mpo na nini ozali kobatisa na mai?”

“Ngai nazali kobatisa na mai. Kati na bino moto moko azali oyo bino boyebi ye te; ye oyo akoya nsima na ngai.”

Yoane azali kobongisa nzela na kosalisaka bato ete babongisa mitema mpo na kondima Masiya oyo akokoma Mokonzi. Alobi na ntina na ye ete: “Ye oyo akoya nsima na ngai aleki ngai na nguya mpe nakoki kokangola sapato na ye te.” Mpe alobi ata nkutu ete, “Ye oyo akoya nsima na ngai abongi kotyama liboso na ngai, mpo ete azalaki liboso na ngai.”

Na yango, nsango oyo Yoane azali kosakola ete “bokonzi ya makolo ebelemi” emonisi polele ete etikali moke mosala ya Mokonzi oyo aponami na Jehovah, ekobanda; Mokonzi yango ezali bongo Yesu Klisto. Yoane 1:6-8,15-28; Matai 3:1-12; Luka 3:1-18; Misala 19:4.

Yoane azali moto ya lolenge nini?

Mpo na nini Yoane azali kobatisa bato?

Mpo na nini Yoane azali koloba ete Bokonzi esili kobelema?