Zala na mayele mpo na mikolo mizali koya
Mokapo 87
Zala na mayele mpo na mikolo mizali koya
KALA mingi te, Yesu auti kobeta lisolo ya mwana na kilikili epai na ebele na bato oyo ndambo na bango bazali bayekoli na ye, bakongoli na mpako oyo bazangi sembo mpe basali mosusu na masumu mingi, lisusu mpe bakomeli na Bafalisai. Azali koloba sikawa epai na bayekoli na ye mpe apesi bango lisese mosusu: lisese ya moto moko azwi nsango mabe na ntina na mobateli ya biloko na ye, kapita na ye.
Yesu alobi ete, mozwi abyangi kapita na ye mpe ayebisi ye ete akolongola ye na mosala. Kapita alobi na motema na ye ete: “Nasala nini? Mpo ete nkolo na ngai akolongola ngai na mosala ya kapita. Natimola mabele? Nazali na makasi te; nalamba? Ezali nsoni mpo na ngai. Nayebi yango ekosala ngai, mpo ete ntango nakolongolama na mosala na ngai, bato bayamba ngai na ndako na bango mpenza.”
Nini ezali bongo mwango ya kapita wana? Abengi bato nyonso oyo bazali na nyongo ya nkolo na ye. Atuni na oyo na liboso ete, “Ozali na nyongo boni epai na nkolo na ngai?”
Ayanoli ye ete: ˈManzanza na mafuta mokama.ˈ
Kapita alobi na ye ete: ˈKamata mokanda na yo, kitisa noki mpe koma ntuku mitano.ˈ
Na nsima atuni mosusu: ˈYo mpe ozali na nyongo boni?ˈ
ˈSaki na masango mokama.ˈ
ˈKamata mokanda na yo mpe koma ntuku mwambe.ˈ
Kapita azali na lotomo ya kokitisa ntalo ya mosolo mosengeli kofutama epai na nkolo na ye mpo ete na ntango wana, azali naino mokengeli na mosolo na ye. Na bongo, amizalisi moninga ya baoyo bakoki kosalisa ye na nsima wana akolongolama na mosala.
Ntango bayebisi ye likambo yango, nkolo akamwe, kino ˈakumisi solo kapita—nzokande azali sembo te—mpo ete asali na mayele mabongi.ˈ Yesu abakisi mpo na yango ete: “Bana na ekeke oyo baleki bana na moi na mayele kati na libota na bango mpenza.”
Yesu apesi sikawa liteya ya lisese yango mpo na bayekoli na ye. Apesi bango toli oyo: “Bozwa baninga na misolo mabe mpo ete soko ekosila, bakoyamba bino kati na bifandelo ya seko.”
Yesu akumisi kapita wana te mpo na mabe na ye, kasi mpo na bososoli na ye, mayele na ye mabongi. Mbala mingi, “bana ya ekeke oyo” bakosalelaka misolo na bango na mayele mabe, to mpe etelemelo na bango mpo na kozwa baninga oyo bakoki kosalela bango malamu na nsima. Bongo, basaleli na Nzambe, “bana na moi,” basengeli mpe kosalela bozwi na bango ya mosuni, “misolo na bango mabe,” na mayele ete bamizwela bolamu na yango.
Kasi, engebene Yesu, na bozwi na bango basengeli komizalisa baninga ya baoyo bakoki koyamba bango na “bifandelo ya seko.” Mpo na basangani ya etonga moke, bifandelo yango bizali na likolo; mpo na “bampate mosusu,” ezali bongo Paradis na mabele. Lokola ezali bobele Jehovah Nzambe mpe Mwana na ye nde bakoki koyamba biso na bifandelo yango, tosengeli koluka kosala boninga elongo na bango na kosalelaka “misolo na biso mabe,” ezala lolenge nini, mpo na kosunga matomba ya Bokonzi. Ntango bozwi ya mosuni ekosila soko mpe ekolimwa, mbele tokozwa bomoi ya seko.
Yesu akobi koloba ete baoyo basili komimonisa sembo na makambo wana mike, biloko na mosuni, bakomimonisa sembo kati na makambo minene. Mpe abakisi ete: “Soko nde bozali sembo na makambo na mosolo mabe te, nani akopesa bino mosolo na solo [matomba ya elimo, to matomba ya Bokonzi]? Soko nde bozali sembo te na biloko na moto mosusu [matomba na Bokonzi oyo Nzambe apesi epai na basaleli na ye], nani akopesa bino yango ezali na bino mpenza [mbano oyo ezali bongo bomoi ya seko kati na bifandelo ya seko]?”
Tokoki soko moke te kozala na mbala moko, basaleli ya solo na Nzambe mpe baombo na misolo mabe, bozwi na mosuni. Yesu asukisi ete: “Mosali akoki kotosa bankolo mibale te; soko akoyina moko akolinga mosusu; soko mpe akosangana na moko nde akotyola mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mosolo lokola baombo.” Luka 15:1, 2; 16:1-13; Yoane 10:16.
▪ Ndenge nini kapita ya lisese na Yesu amizalisi moninga na bato oyo bakoki kosalisa ye na mikolo mizali koya?
▪ “Misolo mabe” ezali nini mpe ndenge nini tokoki kosalela yango mpo na komizwela baninga?
▪ Banani bakoki koyamba biso kati na “bifandelo ya seko,” mpe bifandelo yango ezali nini?