Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

2

Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo

Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo

Bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka ete nkombo ya Nzambe, ndenge emonisami na Tetragrami (יהוה), ezali mbala soki 7 000 na Makomami ya Ebre ya ebandeli. Nzokande, bato mingi bakanisaka ete nkombo yango ezalaki te na Makomami ya Grɛki ya ebandeli. Mpo na ntina yango, babongoli mingi ya Babiblia ya Lingala ya lelo oyo basaleli te nkombo Yehova ntango babongolaki oyo babengaka Kondimana ya Sika. Ata ntango bazali kobongola bisika ya Makomami ya Ebre oyo Tetragrami ezali, babongoli mingi batyaka “Nkolo” na esika ya nkombo mpenza ya Nzambe.

Libongoli ya Mokili ya Sika esali te ndenge Babiblia mosusu esali. Esaleli nkombo Yehova mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Mpo na kosala yango, babongoli batalelaki makambo mibale ya ntina: (1) Bamaniskri ya Grɛki oyo tozali na yango lelo ezali te oyo ya ebandeli. Na bankóto ya bakopi oyo ezali lelo, mingi ekomamaki siɛklɛ soki mibale nsima ya kokoma oyo ya ebandeli mpenza. (2) Na ntango wana, baoyo bazalaki kokoma bamaniskri batyaki liloba ya Grɛki Kyrios, oyo elimboli “Nkolo” na esika ya Tetragrami, to mpe bazwaki yango na bamaniskri oyo esilaki kolongola nkombo yango.

Komite oyo ebongoli Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika emonaki ete ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrami ezalaki na bamaniskri ya Grɛki ya ebandeli. Bilembeteli oyo elandi nde esalisaki bango:

  • Bakopi ya Makomami ya Ebre oyo bato basalelaki na mikolo ya Yesu ná bantoma na ye ezalaki na Tetragrami na bisika nyonso. Na ntango ya kala, kaka mwa bato moke nde bazalaki koboya kondima likambo yango. Lelo oyo, lokola bakopi ya Makomami ya Ebre oyo ekomamaki na siɛklɛ ya liboso ezwamaki pene na Qoumrân, likambo yango elongolaki ntembe nyonso oyo bato bazalaki na yango.

  • Na mikolo ya Yesu ná bantoma na ye, Tetragrami ezalaki mpe na mabongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre. Na boumeli ya basiɛklɛ ebele, bato ya mayele bakanisaki ete Tetragrami ezalaki te na bamaniskri ya Septante, libongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre. Na nsima, na katikati ya siɛklɛ ya 20, mwa biteni ya kala mpenza ya libongoli yango, oyo ezalaki na mikolo ya Yesu ebendaki likebi ya bato ya mayele. Mwa biteni yango ezalaki na nkombo mpenza ya Nzambe oyo ekomamaki na Ebre. Na mikolo ya Yesu, bakopi ya Makomami ya Grɛki ezalaki na nkombo ya Nzambe. Nzokande, na siɛklɛ ya minei T.B., bamaniskri mingi ya Septante, na ndakisa Codex Vaticanus mpe Codex Sinaiticus, ezalaki na nkombo ya Nzambe te kobanda na mokanda ya Ebandeli tii na Malaki (epai nkombo yango ezalaki na bamaniskri ya ebandeli). Yango wana, tokoki kokamwa te ete na bakopi oyo ebatelamaki na eleko wana, nkombo ya Nzambe ezwami te na eteni ya Biblia oyo babengaka Kondimana ya Sika, to Makomami ya Grɛki.

    Yesu alobaki polele ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” Alobaki mpe ete azalaki kosala makambo na “nkombo ya Tata” na ye

  • Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi ete Yesu azalaki mbala mingi kotánga nkombo ya Nzambe mpe koyebisa yango bato mosusu. (Yoane 17:6, 11, 12, 26) Yesu alobaki polele ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” Alobaki mpe ete azalaki kosala makambo na “nkombo ya Tata” na ye.​—Yoane 5:43; 10:25.

  • Lokola Makomami ya Grɛki ya bokristo ekomamaki mpe na litambwisi ya elimo santu lokola Makomami ya Ebre, kolimwisa kaka mpamba boye nkombo ya Nzambe ekozala na boyokani te. Na katikati ya siɛklɛ ya liboso T.B., moyekoli Yakobo alobaki na bankulutu ya Yerusaleme ete: “Simeone ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Ekokaki kozala likambo ya solo te mpo na Yakobo koloba likambo ya boye soki moto ata moko te na siɛklɛ ya liboso ayebaki to asalelaki nkombo ya Nzambe.

  • Nkombo ya Nzambe ekomamá na mokuse na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na mokanda ya Emoniseli 19:1, 3, 4, 6, nkombo ya Nzambe ezali na kati ya liloba “Aleluya.” Yango euti na liloba ya Ebre oyo elimboli mpenzampenza “Bósanzola Yah.” “Yah” ezali nkombo ya Yehova na mokuse. Bankombo mingi oyo Makomami ya Grɛki ya bokristo esalelá eutá na nkombo ya Nzambe. Kutu, mikanda mosusu elimboli ete nkombo ya Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.”

  • Mikanda ya kala ya Bayuda emonisi ete Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe na mikanda na bango. Tosefta, buku ya mibeko oyo basilisaki kokoma yango soki na mobu 300 T.B., elobaki mpo na makomi ya bakristo oyo etumbamaki na mokolo ya Sabata ete: “Babuku ya bato oyo bakomaki Baevanzile mpe ya ba-minim [bakanisaka ete ezali Bayuda oyo bakómaki bakristo] ezikaki na mɔtɔ. Kasi bapesaki bango nzela ya kotumba babuku yango na bisika nyonso oyo ezalaki, ná yango ná nkombo ya Nzambe oyo ezalaki na kati na yango.” Kaka buku yango elobi ete Rabbi Yosé, moto ya Galile, oyo azalaki na bomoi na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso, alobaki ete mikolo mosusu ya pɔsɔ, “moto moko akataki nkasa oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe na kati na yango [makomi ya bakristo] mpe abombaki yango, mpe atumbaki nkasa oyo etikalaki.”

  • Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete ekoki kozala ete nkombo ya Nzambe ezalaki na maloba mosusu ya Makomami ya Ebre oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na nse ya motó ya likambo “Tetragrami na Kondimana ya Sika,” diksionɛrɛ moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi ete: “Tozali na mwa bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrami, nkombo ya Nzambe, Yawe, ezalaki na bisika mosusu to bisika nyonso oyo Kondimana ya Sika etángi maloba ya Kondimana ya Kala, ntango bakomaki bakopi ya liboso ya Kondimana ya Sika.” Moto moko ya mayele na nkombo George Howard alobi ete: “Lokola Tetragrami ekomamaki na bakopi ya Biblia ya Grɛki [Septante] oyo ezalaki Makomami oyo lingomba ya liboso esalelaki, tokoki mpenza kondima ete ntango bakomi ya Kondimana ya Sika bazalaki kotánga Makomami, babatelaki Tetragrami na kati ya maloba ya Biblia.”

  • Babongoli oyo bato bayebaki malamu basalelaki nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Babongoli yango mosusu basalaki bongo bambula mingi liboso mpenza ete Libongoli ya Mokili ya Sika ebima. Okokuta awa na nse bankombo ya babongoli yango mpe mikanda oyo bakomaki: Libongoli ya Kondimana ya Sika . . . Euti na bakopi ya Maniskri ya Vatican (na Lingelesi), ya Herman Heinfetter (1863); The Emphatic Diaglott, ya Benjamin Wilson (1864); Mikanda ya Paulo na Lingelesi ya mikolo oyo, ya George Barker Stevens (1898); Mokanda ya Santu Paulo epai ya Baroma (na Lingelesi), ya W. G. Rutherford (1900); Mikanda ya Kondimana ya Sika (na Lingelesi), na J.W.C. Wand, Episkɔpɔ ya Londres (1946). Lisusu, na libongoli moko na monɔkɔ ya Espagnol oyo esalemaki na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, mobongoli moko na nkombo Pablo Besson asalelaki nkombo “Jehová” na Luka 2:15 mpe Yuda 14, mpe maloba na nse ya lokasa soki 100 oyo asaleli na libongoli na ye, emonisi ete nkombo ya Nzambe ekokaki kozala na bisika yango. Bambula mingi kutu liboso ya mabongoli oyo, mabongoli ya Ebre ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo ebongolamaki kobanda siɛklɛ ya 16 esalelaki Tetragrami na bavɛrsɛ mingi. Kaka na monɔkɔ ya Allemand, mabongoli soki 11 esaleli nkombo “Yehova” (to lolenge mosusu ya koloba ya Ebre “Yawe”) na Makomami ya Grɛki ya bokristo, mpe babongoli minei babakisi nkombo yango na kati ya baparantɛzɛ nsima ya titre “Nkolo.” Mabongoli koleka 70 na monɔkɔ ya Allemand esaleli nkombo ya Nzambe na maloba mingi na nse ya lokasa to na bandimbola mosusu.

    Nkombo ya Nzambe na Misala 2:34 na libongoli ya The Emphatic Diaglott, ya Benjamin Wilson (1864)

  • Mabongoli ya minɔkɔ koleka nkama moko esaleli nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Minɔkɔ mingi ya Afrika, Amerika, Azia, Mpoto mpe bisanga ya Pasifike esalelaka nkombo ya Nzambe na ndenge kutu ya koluka te. (Talá liste oyo ezali na nkasa 12 mpe 13.) Babongoli ya Babiblia yango bamonaki malamu kosalela nkombo ya Nzambe mpo na ntina kaka moko oyo tolobeli liboso. Mabongoli yango mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki kala mingi te, na ndakisa Biblia na monɔkɔ ya Rotumien (1999), oyo esaleli nkombo “Jihova” mbala 51 na bavɛrsɛ 48, mpe libongoli ya Batak (Toba) (1989) na Indonésie, oyo esaleli nkombo “Jahowa” mbala 110.

    Nkombo ya Nzambe na Marko 12:29, 30 na libongoli ya monɔkɔ ya Hawaiien

Na ntembe te, ezali na bilembeteli oyo emonisi polele ete esengeli kozongisa nkombo ya Nzambe, Yehova na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Yango nde mpenza likambo oyo babongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika basali. Bamemyaka nkombo ya Nzambe makasi mpe babangaka mpenza kolongola eloko nyonso oyo ezalaki na makomi ya ebandeli.​—Emoniseli 22:18, 19.