Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

5

Nsango ya Biblia

Nsango ya Biblia

Yehova Nzambe azali na lotomo ya koyangela. Ndenge na ye ya koyangela eleki malamu. Mokano na ye mpo na mabele mpe bato ekokokisama.

Nsima ya 4026 L.T.B.

“Nyoka” aboyi lotomo ya Yehova ya koyangela mpe ndenge na ye ya koyangela. Yehova alaki ete akobimisa “momboto” oyo nsukansuka akopanza nyoka, Satana. (Ebandeli 3:1-5, 15) Nzokande, Yehova atikeli bato ntango bámiyangela bango moko na litambwisi ya nyoka.

1943 L.T.B.

Yehova ayebisi Abrahama ete “momboto” oyo alakamaki akozala moko ya bakitani na ye.​—Ebandeli 22:18.

Nsima ya 1070 L.T.B.

Yehova alaki Mokonzi Davidi mpe na nsima mwana na ye Salomo ete “momboto” oyo alakamaki akouta na libota na bango.​—2 Samwele 7:12, 16; 1 Bakonzi 9:3-5; Yisaya 9:6, 7.

29 T.B.

Yehova amonisi ete Yesu nde “momboto” oyo alakamaki, oyo azali Mokitani na kiti ya bokonzi Davidi.​—Bagalatia 3:16; Luka 1:31-33; 3:21, 22.

33 T.B.

Nyoka, Satana, azokisi “momboto” oyo alakamaki mpo na mwa ntango na ndenge abomisaki Yesu. Yehova asekwisi Yesu mpo na bomoi na likoló, mpe andimi motuya ya bomoi ya kokoka ya Yesu, bongo yango epesi ntina mpenza ya kolimbisama ya masumu, mpe bomoi ya seko mpo na bakitani ya Adama.​—Ebandeli 3:15; Misala 2:32-36; 1 Bakorinti 15:21, 22.

Soki na 1914 T.B.

Yesu abwaki nyoka, Satana na mabele, atiki ye wana mpo na mwa ntango moke.​—Emoniseli 12:7-9, 12.

Na mikolo ezali koya

Yesu akokanga Satana na bolɔkɔ mbula nkóto (1 000) mpe na nsima akoboma ye, to na maloba ya elilingi, akopanza motó na ye. Na ndenge yango, mokano ya Yehova ya ebandeli mpo na mabele mpe bato ekokokisama, nsɔni nyonso oyo ezalaki likoló ya nkombo na ye ekolongwa, mpe ndenge na ye ya koyangela ekolongisama.​—Emoniseli 20:1-3, 10; 21:3, 4.