Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

16-B

Pɔsɔ ya nsuka liboso Yesu akufa awa na mabele (Eteni 2)

Pɔsɔ ya nsuka liboso Yesu akufa awa na mabele (Eteni 2)

12 Nisana

MOI ELALI (Epai ya Bayuda, mokolo ebandaka mpe esukaka ntango moi elali)

MOI EBIMI

  • Alekisi mokolo na kimya elongo na bayekoli na ye

  • Yudasi ayokani na bakonzi ya mangomba mpo na kotɛka ye

MOI ELALI

13 Nisana

MOI ELALI

MOI EBIMI

  • Petro ná Yoane babongisi Elekeli

  • Yesu ná bantoma mosusu bayei nsima ya midi

MOI ELALI

14 Nisana

MOI ELALI

  • Alye Elekeli elongo na bantoma

  • Asukoli makolo ya bantoma

  • Abimisi Yudasi

  • Abandisi Bilei ya mpokwa ya Nkolo

  • Atɛkami mpe bakangi ye na elanga ya Getesemane

  • Bantoma bakimi

  • Basambisi ye na Sanedrina na ndako ya Kaifa

  • Petro awangani Yesu

MOI EBIMI

  • Asambisami lisusu liboso ya Sanedrina

  • Bamemi ye epai ya Pilate, na nsima epai ya Erode, mpe bazongisi ye lisusu epai ya Pilate

  • Bakateli ye etumbu ya liwa mpe babomi ye na Golgota

  • Akufi na ngonga soki ya misato nsima ya midi

  • Balongoli nzoto na ye mpe bakundi yango

MOI ELALI

15 Nisana (Sabata)

MOI ELALI

MOI EBIMI

  • Pilate andimi bátya bakɛngɛli na lilita ya Yesu

MOI ELALI

16 Nisana

MOI ELALI

  • Basombi matiti ya nsolo kitoko mpo na kotya na lilita na ye

MOI EBIMI

  • Asekwi

  • Abimeli bayekoli

MOI ELALI