Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mayebisi mpo na bayangani

Mayebisi mpo na bayangani

BATISIMO Bankulutu na bino basili kozwa bibongiseli oyo ebongi na kotalela ndenge makambo ezali na teritware na bino mpo na bato oyo bakozwa batisimo nsima ya eteni ya programɛ ya ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ.

MAKABO Programɛ ya liyangani oyo ebongolami na minɔkɔ koleka 400. Makabo na yo ekosalisa mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Okoki kopesa na nzela ya Internet na esika bakomi donate.pr418.com. Makabo nyonso ezali na ntina mingi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopesa yo matɔndi mpo na makabo na yo oyo ezali kosala matomba ya Bokonzi ekende liboso.

ETEYELO YA BAPALANGANISI YA NSANGO MALAMU YA BOKONZI Babongisi-nzela oyo bazali na mbula kobanda 23 tii 65, oyo balingi kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova, basɛngisami kokende epai ya basekrɛtɛre ya masangá na bango mpo na kotondisa formilɛrɛ na nzela ya Internet mpo na kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2021

Ebongisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

© 2021 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania