Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA MOTOBA

Bongisá libota na yo mpo na bomoi ya seko

Bongisá libota na yo mpo na bomoi ya seko

1. Mokano ya Yehova mpo na libota ezalaki nini?

 NTANGO Yehova abalisaki Adama mpe Eva, Adama amonisaki esengo na ye na kobimisáká maloba mazali na poɛ́mi ya liboso oyo ekomamaki na Liebele. (Genese 2:22, 23) Nzokande, Mozalisi asukaki te bobele na kopesa esengo epai na bana na ye bato. Alingaki ete babalani mpe mabota básala mokano na ye. Ayebisaki na babalani ya liboso ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nsé na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Oyo nde mosala ya ntina mpe ya kopesa mbano bazalaki na yango! Oyo nde esengo bango mpe bana na bango balingaki kozala na yango soki Adama mpe Eva basalaki mokano ya Yehova na botosi nyonso!

2, 3. Lolenge nini mabota makoki kozwa bolamu mingi lelo oyo?

2 Bobele bongo lelo oyo, mabota mazali na esengo mingi ntango bazali kosala elongo mokano ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bizaleli na moto na Nzambe ikopesaka litomba na nzela nyonso, awa ezali yango na elaká na bomoi mpo na [sikawa] mpe mpo na ntango ekoya.” (1 Timoté 4:8) Libota oyo lizali na bomoi na boyokani na bizaleli na moto na Nzambe mpe oyo lizali kolanda litambwisi ya Yehova lokola yango ekomami kati na Biblia, libota yango likozwa bolamu mpo na “bomoi ya sikawa.” (Nzembo 1:1-3; 119:105; 2 Timoté 3:16) Ata soki bobele mosangani moko ya libota nde azali kosalela mitindá ya Biblia, makambo makotambola malamu koleka libota oyo mosangani ata moko te azali kosalela yango.

3 Búku oyo esili kolobela mitindá mingi ya Biblia oyo mizali kopesa bolamu kati na libota. Ekoki kozala osili komona ete mwa ndambo na mitindá yango mizongelami mbala na mbala na búku oyo. Mpo na nini? Mpamba te yango ezali komonisa nguya ya mateya na solo oyo mabongi mpenza mpo na bolamu ya banso kati na makambo makeseni ya bomoi ya libota. Libota oyo lizali kosala makasi mpo na kosalela mitindá wana ya Biblia limonaka ete bizaleli na moto na Nzambe bizali mpenza na ‘elaká na bomoi mpo na sikawa.’ Tiká tótalela lisusu mitindá minei kati na mitindá wana ya minene.

NTINA YA KOMIPEKISA

4. Mpo na nini komipekisa ezali na ntina kati na libala?

4 Mokonzi Salomo alobaki ete: “Lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango bongo moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na [elimo] na ye te.” (Masese 25:28; 29:11) ‘Kozala na bokonzi likoló na elimo na yo,’ kozala na komipekisa, ezali na ntina mpo na baoyo balingi kozala na libala ya esengo. Komitika na mayoki ya mabe, lokola nkanda makasi to mposa ya mbindo, ekoyeisa likámá oyo ekosɛnga bambula mpo na kobongisa yango​—soki yango ekoki mpenza kobongisama.

5. Lolenge nini moto oyo azangi kokoka akolónga kolóna komipekisa, mpe yango ekobimisa matomba nini?

5 Ya solo, ezali na mokitani moko te ya Adama oyo akoki kozala na komipekisa na makambo nyonso matali nzoto na ye oyo ezangi kokoka. (Baloma 7:21, 22) Nzokande, komipekisa ezali moko na mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, elimo ya Nzambe ekosala ete komipekisa ezala kati na biso soki tozali kobondela mpo na ezaleli yango, soki tozali kosalela batoli malamu oyo ezali kati na Makomami, mpe soki tozali baninga ya bato mosusu oyo bazali komonisa yango mpe koboya baoyo bazali komonisa yango te. (Nzembo 119:100, 101, 130; Masese 13:20; 1 Petelo 4:7) Ezaleli wana ekosalisa biso na “kokima pite,” ata ntango tolengolami. (1 Bakolinti 6:18) Tokobwaka ezaleli ya mobulu mpe tokopɛngola to tokolónga boombo ya masanga. Mpe tokoyeba kozala na kimya mingi liboso na matumoli mpe mikakatano ya makasi. Tiká ete biso banso​—sangisá mpe bana—​tóyekola kolóna mbuma wana ya ntina mingi ya elimo.​—Nzembo 119:1, 2.

LIKANISI MALAMU MPO NA BOKONZI

6. (a) Ebongiseli ya bokonzi engebene Nzambe ezali nini? (b) Mobali asengeli komikundola nini soki alingi ete bokonzi na ye eyeisa bolamu kati na libota na ye?

6 Etindá ya mibale ya monene ezali bongo koyeba bokonzi. Paulo alobelaki lolenge malamu oyo makambo masengeli kotambola wana alobaki ete: “Nalingi ete bósosola ete motó na babali nyonso azali Klisto mpe ete motó na mwasi azali mobali mpe ete motó na Klisto azali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Yango elimboli ete mobali azali mokonzi kati na libota, mwasi na ye asengeli kozala mosungi ya sembo, mpe bana basengeli kotosa baboti na bango. (Baefese 5:22-25, 28-33; 6:1-4) Kasi oyeba ete bokonzi epesaka bolamu bobele ntango yango esalelami na lolenge ya malamu. Mibali oyo bazali komitambwisa na boyokani na bizaleli na moto na Nzambe bayebi ete bokonzi ekeseni na koyangela na lolenge ya makasi. Bazali komekola Yesu, oyo azali Mokonzi na bango. Atako Yesu abyangamaki kozala “mokonzi likoló na biloko nyonso,” ye “ayaki mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga.” (Baefese 1:22; Matai 20:28) Bobele bongo, mobali moklisto azali kosalela bokonzi, mpo na komizwela litomba te, kasi mpo na komibanzabanza na ntina na bolamu ya mwasi na ye mpe ya bana na ye.​—1 Bakolinti 13:4, 5.

7. Mitindá nini ya Makomami mikosalisa mwasi na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesi ye kati na libota?

7 Na ngámbo na ye, mwasi oyo azali komitambwisa na boyokani na bizaleli na moto na Nzambe, azalaka kowelana na mobali na ye te to koluka kozala mokonzi likoló na ye. Azali na esengo ya kozala mosungi na ye mpe kopesana na ye mabɔkɔ. Na bantango mosusu, Biblia elobelaka mwasi ete “azali na nkolo na ye” elimboli mobali na ye, komonisáká kozanga ntembe ete mobali azali mokonzi na ye. (Genese 20:3) Na nzela ya libala azali na nsé ya “mobeko ya mobali na ye.” (Baloma 7:2) Yango wana Biblia ezali kobénga ye “mosungi” mpe “mobakemi.” (Genese 2:20) Azali kobakisa bizaleli mpe makoki oyo mobali na ye azangi, mpe azali kopesa ye lisungi oyo esengeli. (Masese 31:10-31) Biblia mpe elobi ete mwasi azali “moninga,” moto oyo azali kosala na kopesana mabɔkɔ elongo na mobalani na ye. (Malaki 2:14) Mitindá wana ya Makomami misalisaka mobali mpe mwasi na koyeba moto na moto etɛlɛmɛlo na ye mpe kosalelana makambo na limemya mpe na lokumu oyo ebongi.

“KOZALA NA KOYOKA NOKI”

8, 9. Limbolá mwa ndambo na mitindá oyo mikosalisa bato nyonso kati na libota ete bákólisa makoki na bango ya kosolola.

8 Kati na búku oyo, ntina ya kosolola elobelami mbala mingi. Mpo na nini? Mpamba te makambo matambolaka malamu ntango bato bazali kosolola mpe koyoka mpenza oyo moko mpe mosusu azali koloba. Esili kolobelama mbala mingi ete kosolola ezali likambo ya ntina mpenza kati na bato mibale. Moyekoli Yakobo amonisaki yango na maloba oyo: “Moto na moto azala na koyoka noki nde aloba malɛmbɛ.”​—Yakobo 1:19.

9 Ezali mpe na ntina kotya likebi na lolenge oyo tozali koloba. Maloba mazangi mayele, maloba oyo mabimisaka kowelana, to matɔ́ngi, mapesaka nzela te na kosolola ya malamu. (Masese 15:1; 21:9; 29:11, 20) Ata ntango makambo oyo tozali koloba mazali malamu, soki yango elobelami na lolenge ya makasi, ya lolendo, to ya kozanga mayele, ekoki mpenza kosala mabe na esika ete esala malamu. Maloba na biso masengeli kozala na ngɔlu, “na elɛngi na mongwa.” (Bakolose 4:6) Maloba na biso masengeli kozala lokola “pómo ya wolo etyami kati na saani ya palata.” (Masese 25:11, NW) Mabota oyo mayekoli kosolola malamu masili kosala litambe monene mpo na kozwa bolamu.

MOKUMBA MONENE YA BOLINGO

10. Lolenge nini ya bolingo ezali na ntina mingi kati na libala?

10 Liloba “bolingo” emonani mbala mingi kati na búku oyo. Ozali komikundola lolenge ya bolingo oyo yango ezali kolobela liboso? Ezali solo ete lolango (na Greke, eʹros) ezali na esika monene kati na libala, mpe mpo na kolónga kati na libala, bolingo mozindo lokola bandeko mpe baninga (phi·liʹa) esengeli kozala kati na mobali mpe mwasi. Kasi oyo eleki ntina mpenza ezali bolingo oyo emonisami na liloba ya Greke a·gaʹpe. Yango ezali bolingo oyo tozali kolóna mpo na Yehova, mpo na Yesu, mpe mpo na bazalani na biso. (Matai 22:37-39) Ezali bolingo oyo Yehova azali komonisa epai na bato. (Yoane 3:16) Oyo nde likambo ya kosepelisa ete biso tokoki komonisa bolingo motindo moko epai na mobalani na biso mpe epai na bana na biso!​—1 Yoane 4:19.

11. Lolenge nini bolingo ezali na ntina kati na libala?

11 Kati na libala bolingo oyo etombwani ezali solo “ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Ezali kokangisa mobali mpe mwasi esika moko mpe ezali kopusa bango ete basalaka oyo ezali malamu koleka moko epai na mosusu mpe epai na bana na bango. Ntango mabota mazali kokutana na mikakatano makasi, bolingo esalisaka bango ete bábongisa makambo na bomoko mpenza. Wana mobali mpe mwasi bakómi mibangé, bolingo ekosalisa bango ete básungana mpe ete bálanda kosepela na bizaleli kitoko ya moko mpe ya mosusu. “Bolingo . . . ekolukaka malamu na yango mpenza te. . . . [Ekokangaka motema na] makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka mpiko na [makambo] nyonso. Bolingo ekosuka te.”​—1 Bakolinti 13:4-8.

12. Mpo na nini bolingo oyo babalani bazali na yango mpo na Nzambe elendisaka libala na bango?

12 Bomoko kati na libala ezalaka mpenza makasi ntango yango elendisami bobele te na bolingo kati na mobali mpe mwasi kasi libosoliboso soki yango elendisami na bolingo mpo na Yehova. (Mosakoli 4:9-12) Mpo na nini? Ntoma Yoane akomaki ete: “Bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye.” (1 Yoane 5:3) Na yango mobali mpe mwasi basengeli kobɔkɔla bana na bango kati na bizaleli na moto na Nzambe bobele te mpo ete balingaka bana na bango mingi kasi mpo ete yango ezali lilako ya Yehova. (Deteronome 6:6, 7) Basengeli kokima misala ya mbindo bobele te mpo ete balinganaka moko na mosusu kasi mingimingi mpo ete balingaka Yehova, oyo “akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Ata soki moko kati na babalani ayeisi mikakatano makasi kati na libala, bolingo mpo na Yehova ekopusa mosusu na kolanda mitindá ya Biblia. Ya solo, esengo ezali na mabota oyo bolingo ya moko mpo na mosusu elendisami na bolingo mpo na Yehova!

LIBOTA OYO LIZALI KOSALA MOKANO YA NZAMBE

13. Lolenge nini ekateli ya kosala mokano ya Nzambe ekosalisa moto na moto na kotya miso na ye likoló na makambo maleki ntina?

13 Bomoi mobimba ya moklisto etaleli mpenza kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 143:10) Ezali yango nde elimboli kozala na bizaleli na moto na Nzambe. Kosala mokano ya Nzambe ekosalisa mabota na kotya miso na bango likoló na makambo maleki ntina. (Bafilipi 1:9, 10) Na ndakisa, Yesu akebisaki ete: “Nayei mpo na kotya [kozanga koyokana] kati na moto mpe tata na ye, na kati na mwana mwasi mpe mama na ye mpe na kati na mwasi mpe bokilo na ye. Bayini na moto bakozala bato na ndako na ye moko.” (Matai 10:35, 36) Mpo na komonisa bosolo ya likebisi ya Yesu, bayekoli na ye mingi basili konyokwama na basangani ya mabota na bango. Oyo nde ezalela ya mawa mpe ya mpasi! Nzokande, bikanganeli ya libota bisengeli te kolɛmbisa bolingo na biso mpo na Yehova Nzambe mpe mpo na Yesu Klisto. (Matai 10:37-39) Soki moto azali koyika mpiko wana azali kokutana na botɛmɛli ya libota, batɛmɛli bakoki kobongwana ntango bazali komona bopusi malamu ya bizaleli na moto na Nzambe. (1 Bakolinti 7:12-16; 1 Petelo 3:1, 2) Ata soki babongwani te, bolamu ya koumela ekozwamaka te na kotika kosalela Nzambe na ntina na botɛmɛli.

14. Lolenge nini mposa ya kosala mokano ya Nzambe ekosalisa baboti na koluka matomba malamu ya bana na bango?

14 Kosala mokano ya Nzambe ekosalisa baboti na kokamata bikateli ya malamu. Na ndakisa, na bamboka mosusu, baboti batalelaka bana lokola mosolo mobombami, mpe batyaka motema epai na bana na bango mpo na kosalisa bango ntango bakokóma mibangé. Atako ezali malamu mpe ebongi ete bana oyo bakóli básalisa baboti na bango oyo bakómi mibangé, ezalela wana esengeli te kosala ete baboti bátinda bana na bango na komipesa na koluka biloko mingi ya mosuni kati na bomoi. Ezali malamu te mpo na bana soki baboti na bango bazali kobɔkɔla bango ete bápesa motuya mingi na biloko ya mosuni koleka makambo ya elimo.​—1 Timoté 6:9.

15. Lolenge nini Enise, mama ya Timoté azalaki ndakisa malamu ya moboti oyo asalaki mokano ya Nzambe?

15 Ndakisa malamu na likambo yango ezali bongo Enise, mama ya elenge Timoté moninga ya Paulo. (2 Timoté 1:5) Atako abalanaki na mobali oyo azalaki mondimi te, Enise mpe Loisi, nkɔ́kɔ ya Timoté, babɔkɔlaki Timoté na lolenge ya malamu mpo na kolanda bizaleli na moto na Nzambe. (2 Timoté 3:14, 15) Ntango Timoté akómaki mokóló, Enise apesaki ye nzela ya kotika ndako mpe komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi lokola misionere, moninga ya Paulo. (Misala 16:1-5) Oyo nde bosepeli asengelaki kozala na yango ntango mwana na ye akómaki misionere moko monene! Bizaleli na ye ya moto na Nzambe ntango akómaki mokóló bimonisaki lolenge nini abɔkwamaki uta bomwana. Ya solo, Enise azalaki na bosepeli mpe na esengo na koyoka balapólo ya mosala ya sembo ya Timoté, atako azalaki kofanda na ye esika moko te.​—Bafilipi 2:19, 20.

LIBOTA MPE BOMOI NA YO NA MIKOLO MIZALI KOYA

16. Lokola mwana, lobanzo nini lobongi Yesu amonisaki, kasi nini ezalaki mposa na ye ya libosoliboso?

16 Yesu abɔkwamaki kati na libota oyo lizalaki kobanga Nzambe mpe, na ntango akómaki mokóló, amonisaki komibanzabanza mpenza ya mwana mpo na mama na ye. (Luka 2:51, 52; Yoane 19:26) Atako bongo, mposa ya libosoliboso ya Yesu ezalaki ya kokokisa mokano ya Nzambe, mpe mpo na ye yango esangisaki kofungola nzela mpo na bato ete bázwa bomoi ya seko. Asalaki yango ntango apesaki bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola lisiko mpo na masumu ya bato.​—Malako 10:45; Yoane 5:28, 29.

17. Etamboli ya sembo ya Yesu efungoli bilikya nini kitoko epai na baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe?

17 Nsima wana Yesu akufaki, Yehova asekwisaki ye mpo na kozala na bomoi na likoló mpe apesaki ye nguya monene, na nsima atyaki ye Mokonzi kati na Bokonzi ya likoló. (Matai 28:18; Baloma 14:9; Emoniseli 11:15) Mbeka na Yesu epesaki likoki mpo na ndambo na bato ete báponama mpo na koyangela elongo na ye kati na Bokonzi. Yango mpe efungolaki nzela mpo na bato nyonso ya motema sembo ete bázwa bomoi ya kokoka awa na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 4; 21:3-5; 22:1-4) Moko na mabaku minene mpe ya kitoko tozali na yango lelo ezali ya koyebisa nsango malamu oyo ya nkembo epai na bazalani na biso.​—Matai 24:14.

18. Bokundoli nini mpe elendiseli nini epesami epai na mabota mpe epai na moto mokomoko?

18 Lokola ntoma Paulo amonisaki yango, kozala na bomoi na bizaleli na moto na Nzambe esimbami na elaká ete bato bakoki kosangola mapamboli wana kati na bomoi “na ntango ekoya.” Ya solo, yango ezali mpenza nzela eleki malamu mpo na kozwa bolamu! Omikundola ete, “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:17) Na yango, ozala mwana to moboti, mobali to mwasi, monzemba oyo azali na bana to oyo azali na bana te, salá makasi mpo na kosala mokano ya Nzambe. Ata ntango ozali kotungisama to ozali kokutana na mikakatano makasi, kobosana te ete ozali mosaleli ya Nzambe na bomoi. Na yango, tiká ete misala na yo misepelisa Yehova. (Masese 27:11) Mpe tiká ete etamboli na yo epesa yo bolamu uta sikawa mpe bomoi ya seko kati na mokili ya sika oyo ezali koya!