Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA NSAMBO

Bozali na motomboki kati na ndako?

Bozali na motomboki kati na ndako?

1, 2. (a) Lisese nini Yesu apesaki mpo na komonisa kozanga bosembo ya bakonzi ya lingomba ya Bayuda? (b) Liteya nini litaleli bilenge tokoki kozwa na lisese wana ya Yesu?

 MWA mikolo liboso ete akufa, Yesu atunaki na etuluku ya bakonzi na lingomba ya Bayuda motuna moko oyo ezalaki kotinda na kokanisa. Alobaki ete: “Bozali kokanisa nini? Moto moko azalaki na bana babali mibale. Ekei ye epai na oyo na liboso, alobi ete, Mwana, kendá lelo kosala mosala na elanga na miwiti. Azongisi monɔkɔ, alobi ete, Nakei, nde akendaki te. Eyei ye epai na oyo na mibale, alobi bobele bongo. Ye azongisi liloba, alobi ete, Nalingi te, nde nsima abongoli motema mpe akei. Nani kati na bango mibale asali nde mokano na tata?” Bakonzi na Bayuda balobi ete: “Oyo na nsima.”​—Matai 21:28-31.

2 Awa Yesu alingaki komonisa ezaleli ya kozanga sembo ya bakonzi ya lingomba ya Bayuda. Bazalaki lokola mwana wana ya liboso, balakaki ete bakosala mokano ya Nzambe mpe na nsima bakokisaki elaká na bango te. Kasi baboti mingi bakondima ete Yesu asalelaki elilingi wana mpo ete ayebaki malamu lolenge bomoi ya libota ezalaka. Lokola ye amonisaki yango malamu, ezalaka mbala mingi mpasi mpo na koyeba makanisi ya bilenge to koyeba makambo oyo bilenge bakosala. Elenge akoki kobimisa mikakatano mingi na boumeli ya bolenge na ye mpe na nsima akokóla kino kokóma mokóló oyo azali kokokisa mikumba na ye, mokóló oyo azali na limemya. Yango ezali likambo oyo tosengeli koyeba wana tozali kolobela botomboki ya bilenge.

MOTOMBOKI AZALI NANI?

3. Mpo na nini baboti basengeli nokinoki te kotya mwana na bango elembo ete azali motomboki?

3 Na bantango mosusu, okoki koyoka ete bazali kolobela bilenge oyo batombokelaka baboti na bango. Ekoki kozala ete yo moko oyebi libota moko oyo kati na yango elenge moko azalaka na motó makasi. Nzokande, ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpo na koyeba soki mwana azali mpenza motomboki. Lisusu, ekoki kozala mpasi na koyeba mpo na nini bana mosusu bazalaka batomboki mpe basusu​—atako bafandi na ndako moko—​bazalaka batomboki te. Soki baboti bamoni ete moko kati na bana na bango abandi kokólisa ezaleli ya polele ya botomboki, basengeli kosala nini? Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli liboso kolobela soki motomboki azali nani.

4-6. (a) Motomboki azali nani? (b) Nini baboti basengeli kobosana te soki elenge na bango azali kozanga botosi na bantango mosusu?

4 Na elobeli ya pɛtɛɛ, motomboki azali moto oyo azali, na nkó nyonso mpe ntango nyonso, koboya kotosa to oyo azali kotɛmɛla to kotya ntembe epai na ye oyo azali na bokonzi likoló na ye. Ya solo, ‘ebɛbɛ ezwami na motema na mwana.’ (Masese 22:15) Na yango, na ntango moko to mosusu, bana nyonso batɛmɛlaka baboti mpe bato mosusu oyo bazali na bokonzi likoló na bango. Yango emonanaka mpenza na ntango mwana akómi na bambula ya bolenge, eleko oyo bokóli ezali kosalema na nzoto mpe na mayoki. Mbongwana kati na bomoi ya moto ekobimisa kobulungana na makanisi, mpe bolenge ezali eleko oyo mbongwana esalemaka mingi. Mwana na yo ya mobali to ya mwasi oyo azali elenge azali kolongwa na bomwana mpe azali kokóma mokóló. Mpo na yango, na boumeli ya bolenge, baboti mosusu mpe bana bayokanaka malamu te. Mbala mingi baboti balingaka ete eleko yango eumela, nzokande bilenge balingaka ete eleka nokinoki.

5 Elenge oyo azali motomboki aboyaka makambo oyo baboti na ye batalelaka ete mazali na motuya. Kasi, omikundola ete mwa makambo mikemike oyo mamonisi kozanga botosi makómisaka moto motomboki te. Mpe na makambo ya elimo, bana mosusu bakoki na ebandeli komonisa bobele bosepeli moke to mpe komonisa bosepeli ata moke te kati na solo ya Biblia, kasi yango elimboli mpenza te ete bazali batomboki. Lokola ozali moboti, kotya nokinoki te mwana na yo elembo.

6 Bilenge nyonso oyo bazali na bambula ya bolenge bamonisaka botomboki liboso ya bokonzi ya baboti? Soko moke te. Ya solo, bilembeteli bikoki komonisa ete bobele mwa bilenge moke nde bamonisaka botomboki makasi. Nzokande, ezali boni mpo na mwana oyo azali kotomboka na nkó nyonso mpe ntango nyonso? Nini ekoki kopesa nzela na botomboki motindo wana?

MAKAMBO OYO MAPESAKA NZELA NA BOTOMBOKI

7. Lolenge nini mokili ya Satana ekoki kopusa mwana kino kokóma motomboki?

7 Likambo ya liboso ya monene oyo epesaka nzela na botomboki ezali bongo ezingelo ya mokili ya Satana. “Mokili mobimba ezali kolala kati na nguya na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19, NW) Mokili oyo ezali kati na nguya ya Satana esili kokólisa mimeseno oyo mikopesa basusu mpasi oyo baklisto basengeli kobundisa. (Yoane 17:15) Mingi kati na mimeseno yango ezali mbindo, ezali na makámá mingi, mpe etondi na bopusi mabe lelo oyo koleka ndenge yango ezalaki na ntango ya kala. (2 Timoté 3:1-5, 13) Soki baboti bazali te koteya, kokebisa, mpe kobatela bana na bango, bilenge bakoki kozindisama na “elimo oyo ezali sikawa kosala mosala kati na bana bazangi botosi.” (Baefese 2:2, NW) Bopusi ya baninga etalelami mpe kati na yango. Biblia elobi ete: “Ye oyo azali kotambola na bazoba akozwa mpasi.” (Masese 13:20, NW) Bobele bongo, ye oyo azali kotambola na baoyo batondi na elimo ya mokili oyo akozwa mpenza bopusi ya elimo yango. Ebongi kosalisa bilenge ntango nyonso mpo báyeba ete botosi na mitindá ya Nzambe ezali moboko mpo na kozala na lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.​—Yisaya 48:17, 18.

8. Wapi makambo oyo makoki komema mwana ete akóma motomboki?

8 Likambo mosusu oyo epesaka nzela na botomboki ekoki kozala ezalela oyo ezali kati na ndako. Na ndakisa, soki moboti moko azali moombo ya masanga, momeli bilangwiseli, to abɛtaka moboti mosusu, likanisi ya bilenge na ntina na bomoi ekoki kobebisama. Ata kati na bandako oyo mwa kimya ezalaka, botomboki ekoki komonana ntango mwana azali komiyoka ete baboti na ye bazali komibanzabanza te mpo na ye. Nzokande, botomboki ya bilenge eutaka bobele na bopusi ya libándá te. Bana mosusu baboyaka makambo oyo baboti na bango batalelaka yango ete mazali na motuya atako bazali na baboti oyo bazali kosalela mitindá ya Nzambe mpe bazali kobatela bango, mingi mpenza, na makambo ya mokili oyo mozingi bango. Mpo na nini? Mbala mosusu ezali mpo na mokakatano mosusu oyo ezali kati na biso​—kozanga kokoka oyo ezali kati na bato. Paulo alobaki ete: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama], mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Adama motomboki mpe moto na moimi atikelaki bana na ye nyonso libula ya mabe. Bilenge mosusu batombokaka, lokola nkɔ́kɔ na bango ya liboso asalaki.

ELI, MOTIKI NZELA NA MAKAMBO NYONSO MPE LEHOBAMA, MOTO NA MAKAMBO MAKASI

9. Makambo nini ya kolekisa ndelo mpo na lolenge ya kobɔkɔla mwana ekoki komema ye ete akóma motomboki?

9 Likambo mosusu oyo esili komema bilenge na botomboki ezali likanisi ya kozanga bokatikati oyo ezalaka epai na baboti na oyo etali lolenge ya kobɔkɔla bana. (Bakolose 3:21) Baboti mosusu ya sembo bazali kotyela bana na bango bipekiseli ya makasi mpe bazali kopesa bango disipilini ya makasi. Basusu bazali kotika nzela na makambo nyonso, kozanga kopesa malako oyo makoki kobatela bilenge na bango oyo bazangi eksperiansi. Ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kozala na likanisi ya bokatikati na makambo wana mibale. Mpe mwana na mwana azali na bamposa na ye oyo ekeseni na oyo ya bana mosusu. Moko akoki kozala na mposa ete bákɛngɛla ye mingi koleka mosusu. Nzokande, bandakisa mibale ya Biblia ekosalisa na komonisa makámá ya kozala na likanisi ya kolekisa ndelo ezala mpo na oyo etali kozala na makambo makasi to mpe na oyo etali kotika nzela na makambo nyonso.

10. Mpo na nini Eli azalaki moboti mabe, atako azalaki mpenza nganga monene ya sembo?

10 Eli, nganga monene ya Yisalaele azalaki tata ya libota. Asalaki na boumeli ya mibu 40, na ntembe te, ayebaki malamu Mibeko ya Nzambe. Emonani ete Eli akokisaki mosala na ye ya bonganga na bosembo nyonso mpe ekoki kozala ete ateyaki Mobeko ya Nzambe epai na bana na ye, Hofini mpe Pinehase. Nzokande, Eli azalaki na boboto na lolenge ya kolekisa ndelo epai na bana na ye. Hofini mpe Pinehase bazalaki kosala lokola banganga, kasi bazalaki “bato mpamba,” bazalaki komipesa bobele na komisepelisa mpe kokokisa bamposa na bango ya mbindo. Nzokande, wana bazalaki kosala misala ya nsɔni na esika mosantu, Eli azalaki na molende te ya kolongola bango mikumba ya bonganga. Azalaki kopesa bango bobele mwa mpamela moke. Na ezaleli na ye ya kotika nzela na makambo nyonso, Eli akumisaki bana na ye mingi koleka Nzambe. Na yango, bana na ye batombokelaki losambo ya pɛto ya Yehova mpe ndako mobimba ya Eli ezwaki mpasi mingi.​—1 Samwele 2:12-17, 22-25, 29; 3:13, 14; 4:11-22.

11. Likebisi nini baboti bakoki kozwa kati na ndakisa mabe ya Eli?

11 Bana ya Eli basilaki kokóma mikóló ntango makambo wana masalemaki, kasi lisoló wana limonisi likámá oyo libimaka mpo na kozanga kopesa disipilini. (Kokanisá na Masese 29:21.) Baboti mosusu bayebaka te kokesenisa bolingo mpe kotika nzela na makambo nyonso, kozangáká bongo kotya mibeko ya polele, ya malamu mpe oyo ebongi. Bazali komonisa bopɔtu mpo na kosalela disipilini ya bolingo, ata wana mitindá ya Nzambe mibukami. Na ntina na ezaleli wana ya kotika nzela na makambo nyonso, bana batyaka lisusu likebi te ezala epai na baboti to epai na bato mosusu nyonso oyo bazali na bokonzi likoló na bango.​—Kokanisá na Mosakoli 8:11.

12. Libungá nini Lehobama asalaki na lolenge na ye ya kosalela bokonzi?

12 Lehobama amonisi lolenge mabe ya kosalela bokonzi. Azalaki mokonzi ya nsuka na bokonzi ya Yisalaele ntango oyo yango ekabwanaki naino te, kasi azalaki mokonzi malamu te. Lehobama asilaki kozwa mabelé ya bato oyo balɛmbaki na ntina na bozito oyo Salomo, tata na ye, atyaki likoló na bango. Lehobama amityaki na esika na bango? Te. Ntango bato bayaki epai na ye mpo na kosɛnga ye ete alongola mwa ndambo ya mibeko makasi, alandaki te toli malamu ya bapesi-toli na ye oyo bazalaki mibangé kasi asɛngaki ete bozito ya bato eyeisama kilo mingi. Lolendo na ye ememaki botomboki na mabota zomi oyo mazalaki na nɔ́rdi, mpe bokonzi ekabwanaki na biteni mibale.​—1 Mikonzi 12:1-21; 2 Ntango 10:19.

13. Lolenge nini baboti bakoki kopɛngola kosala libungá oyo Lehobama asalaki?

13 Baboti bakoki kozwa mwa mateya ya ntina na lisoló wana ya Biblia oyo etaleli Lehobama. Basengeli “koluka Yehova” kati na libondeli mpe kotalela myango na bango ya kobɔkɔla bana engebene mitindá ya Biblia. (Nzembo 105:4) Mosakoli 7:7 elobi ete: “Minyoko ikokómisa moto na mayele na bolema.” Malako oyo mapesami na kokanisama malamu liboso mapesaka na bana likoki ya kokóla wana mazali mpe kobatela bango na mabe. Kasi bana basengeli te kofanda na esika oyo makambo mazali makasi mpe oyo mazali kopekisa bango kokóla na mayoki ya komityela motema mpe komipesa limemya. Ntango baboti bazali kosala makasi na kozala na bokatikati na likambo litali kopesa bonsomi mpe kopesa malako ya sikisiki, bilenge mingi bakopusama te ete bátomboka.

KOKOKISAMA YA BAMPOSA YA NTINA EKOKI KOPƐNGOLA BOTOMBOKI

Ya solo, bana bakokóla kino kokóma bato oyo bayebi kozwa bikateli soki baboti na bango bazali kosalisa bango ete bálónga mikakatano na bango ya bolenge

14, 15. Lolenge nini baboti basengeli kotalela bokóli ya mwana na bango?

14 Atako baboti basepelaka na komona bilenge na bango kokóla na nzoto longwa na bomwana kino kokóma mikóló, bakoki kotungisama ntango mwana na bango oyo azali elenge azali lisusu kotalela bango te kino akómi ye moko komityela motema na lolenge lobongi. Na boumeli ya eleko wana, kokamwa te soki na bantango mosusu elenge na bino azali na motó makasi to azali koyokana na bino lisusu te. Yebá ete mokano ya baboti baklisto ezali bongo ya kobɔkɔla bana ete bákóma baklisto oyo bakɔmɛli, oyo bayebi kozwa bikateli mpe oyo bazali kokokisa mikumba na bango.​—Kokanisá na 1 Bakolinti 13:11; Baefese 4:13, 14.

15 Atako ekoki kozala mpasi na lolenge moko to mosusu, baboti basengeli kotika ezaleli ya koboya kokokisa lisɛngi nyonso oyo elenge na bango amonisi mpo na koluka mwa lipandá mingi koleka. Na lolenge lobongi mpenza, mwana azali na mposa ya kokóla ete akóma moto. Ya solo, ata na ebandeli mpenza ya bolenge, bilenge mosusu babandaka komonisa lokola ete bakómi mikóló. Na ndakisa, Biblia elobi na ntina na elenge Mokonzi Yosiya ete: “Naino azalaki elenge [soko mibu 15], abandaki koluka Nzambe na Davidi, tata na ye.” Elenge oyo ya kokamwa azalaki mpenza moto oyo ayebaki mokumba na ye.​—2 Ntango 34:1-3.

16. Wana bana bazali kopesamela bonsomi mingi, eloko nini basengeli koyeba?

16 Nzokande, bonsomi eyaka na mikumba na yango. Na yango, tiká nzela na mwana na yo oyo azali kokóla ete amona matomba ya bikateli na ye mpe misala na ye mosusu. Lilako oyo ete, “soko moto akokóna nini, akobuka bobele yango,” ebongi mpenza, ezala mpo na bilenge to mpo na mikóló. (Bagalatia 6:7) Bana bakotikala ntango nyonso na nsé ya libateli ya baboti na bango te. Kasi, ezali boni soki mwana na yo alingi kosala likambo oyo likoki kondimama soko moke te? Lokola ozali moboti oyo ozali kokokisa mokumba na yo, osengeli koloba, “Te.” Mpe, atako okoki kolimbola bantina mpo na yango oboyi likambo yango, eloko moko te ebongola te na yo ete ekóma ɛɛ. (Kokanisá na Matai 5:37.) Nzokande, salá makasi ete oloba “Te” na lolenge ya kimya mpe ya boboto, mpamba te “eyano, wana ezali ya bopɔlɔ, epɛngolaka nkanda.”​—Masese 15:1, NW.

17. Wapi mwa ndambo ya bamposa ya elenge oyo baboti basengeli kokokisa yango?

17 Bilenge basengeli na disipilini ya ntango nyonso ata soki bandimaka ntango nyonso te bipekiseli mpe mibeko oyo bapesaka bango. Ezali likambo ya kolɛmbisa soki mibeko mizali mbala na mbala kobongwana na kotalela lolenge oyo moboti amiyoki na ntango moko to na ntango mosusu. Lisusu, soki bilenge bazali kozwa bilendiseli mpe lisalisi, lokola yango esengeli, mpo na kolónga ezaleli ya kozanga komityela motema, kozala nsɔninsɔni, bakokóla mpo na koyeba kozwa bikateli. Bilenge mpe basepelaka na yango ntango baboti na bango bazali kondima bango ete bazali kolónga.​—Kokanisá na Yisaya 35:3, 4; Luka 16:10; 19:17.

18. Wapi mwa makambo ya solo matali bilenge oyo makoki kolendisa baboti?

18 Baboti bakoki kobɔndisama na koyeba ete wana kimya, boyokani, mpe bolingo ezali kati na ndako, bana bakólaka malamu. (Baefese 4:31, 32; Yakobo 3:17, 18) Nzokande, bilenge mingi basili kolónga ata na bandako ya mabe, atako bautaki na mabota oyo boombo ya masanga, mobulu, to bopusi mosusu ya mabe ezali mingi kati na yango, mpe basili kokóla kino kozala mikóló ya malamu. Na yango, soki okosala ete ndako na yo ezala esika oyo bilenge bakomiyoka ete babatelami mpe bayebi ete bakolingama, bakomonisela bango bolingo ya motema, mpe bakotyelama likebi​—soki libateli motindo yango esimbami na malako oyo mazali na makambo makasi te mpe na disipilini oyo eyokani na mitindá ya Makomami​—bakokóla mpenza mpo na kokóma mikóló oyo okosepela na bango mingi.​—Kokanisá na Masese 27:11.

NTANGO BANA BAKUTANI NA MIKAKATANO

19. Atako baboti basengeli kobɔkɔla mwana na lolenge oyo asengeli kotambola, mokumba nini ezali likoló ya mwana?

19 Kobɔkɔla bana malamu ezali na ntina mpenza. Masese 22:6 elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” Nzokande, ezali boni mpo na bana oyo bazali na mikakatano minene atako bazali na baboti ya malamu? Yango ekoki kosalema? Ɛɛ. Maloba ya masese masengeli kososolama na kotalela mikapo misusu oyo milobeli mingi mokumba oyo bana bazali na yango ya “koyoka” mpe kotosa baboti. (Masese 1:8) Moboti mpe mwana basengeli kosalela mitindá ya Makomami mpo ete boyokani ezala kati na libota. Soki baboti mpe bana bazali na boyokani te, mikakatano mikozala.

20. Ntango mwana asali libungá na ntina na kozanga kokanisa malamu, eloko nini baboti bakoki kosala na mayele nyonso?

20 Lolenge nini baboti basengeli kosala ntango elenge asali libungá mpe akutani na mikakatano? Na ntango wana, mwana akozala mpenza na mposa ya lisalisi. Soki baboti bakomikundola ete bazali liboso na elenge oyo azali na eksperiansi te, bakosala makasi mingi na kotɛmɛla ezaleli ya kolekisa ndelo. Paulo apesaki toli epai na bato oyo bakɔmɛlaki kati na lisangá ete: “Soko moto azwami na likambo, bino bato na [elimo, NW], bóbutwisa ye na [elimo, NW] na bopɔlɔ.” (Bagalatia 6:1) Baboti bakoki kolanda lolenge oyo ya kosala soki bazali kosolola elongo na elenge oyo asali libungá mpamba te azangi kokanisa malamu. Atako bakolimbola polele mpo na nini etamboli na ye ezali mabe mpe lolenge nini akoki kopɛngola kosala libungá wana lisusu, baboti basengeli komonisa yango polele ete likambo yango nde ezali mabe, kasi elenge te nde azali mabe.​—Kokanisá na Yuda 22, 23.

21. Na kolandáká ndakisa ya lisangá ya boklisto, lolenge nini baboti basengeli kosala soki bana na bango basali lisumu monene?

21 Ezali boni soki mobulu ya mwana ezali mpenza makasi? Soki ezali bongo mwana azali na mposa ya lisalisi ya sikisiki mpe litambwisi ya malamu. Ntango mosangani moko ya lisangá asali lisumu monene, alendisamaka ete abongola motema mpe abɛlɛma epai na bankulutu mpo na kozwa lisalisi. (Yakobo 5:14-16) Wana abongoli motema, bankulutu bakosalisa ye kino akozwa lisusu makasi na elimo. Kati na libota, mokumba ya kosalisa elenge oyo asali libungá ezali ya baboti, kasi ekoki mpe kosɛnga ete básolola likambo yango elongo na bankulutu. Basengeli soko moke te koluka kobomba epai na lisangani ya bankulutu masumu nyonso ya minene oyo moko na bana na bango asali.

22. Na ndakisa ya Yehova, ezaleli nini baboti bakosala makasi ete bábatela yango soki mwana na bango asali libungá monene?

22 Likambo monene oyo litaleli bana ezalaka mpenza komekama mpo na baboti. Lokola babulungani na mayoki, baboti bakoki na nkanda nyonso kopusama ete bábangisa mwana oyo asali mbeba; kasi yango ekoki bobele kosilikisa ye. Obosana te ete bomoi ya mikolo mizali koya ya elenge wana etaleli mpenza lolenge oyo bazali kosalela ye makambo na mikolo wana ya mpasi. Omikundola lisusu ete, Yehova azalaki pene na kolimbisa ntango libota na ye lipɛngwaki na oyo ezalaki malamu​—wana babongolaki mpenza motema. Yoká maloba na ye oyo ya bolingo: “Boye, tólobana likambo elongo moko; [Yehova] alobi bongo. Ata masumu na bino izali motane lokola ngola, ikokóma pɛɛ lokola mbula mpembe; ikozala lokola [nkunge] na bampate.” (Yisaya 1:18) Oyo nde ndakisa kitoko mpo na baboti!

23. Soki moko kati na bana na bango asali lisumu monene, lolenge nini baboti basengeli kosala, mpe nini basengeli kopɛngola?

23 Na yango, salá makasi na kosalisa mwana oyo asali libungá ete atika nzela na ye. Luká batoli ya mayele epai na baboti oyo bazali na eksperiansi mingi mpe epai na bankulutu kati na lisangá. (Masese 11:14) Salá makasi ete oloba to osala eloko moko na nkanda te oyo ekosala ete mwana akóma kokakatana mpo na kozonga epai na yo. Pɛngolá nkanda mpe kosilika ya makasi oyo ezangi ntina. (Bakolose 3:8) Kolɛmba ye te. (1 Bakolinti 13:4, 7) Atako osengeli koyina mabe, pɛngolá ezaleli ya kozala na makambo makasi mpe ya komonisa nkanda epai na mwana. Likambo ya ntina mingi, baboti basengeli kosala makasi na kozala ndakisa malamu mpe kobatela kondima na bango makasi epai na Nzambe.

LOLENGE YA KOSALA LIBOSO NA MOTOMBOKI YA MOTÓ MAKASI

24. Ezalela nini ya mawa ebimaka bantango mosusu kati na libota ya baklisto, mpe lolenge nini baboti basengeli kosala mpo na yango?

24 Na makambo mosusu ekoki komonana ete elenge akamati ekateli makasi ya kotomboka mpe abwaki mpenza bizaleli malamu ya boklisto. Na bongo, sikawa likebi esengeli kotyama mingi mpo na kobatela mpe kotonga bomoi ya libota mpo na bana mosusu oyo batikali. Zalá na likebi ete osalela nguya nyonso te bobele na koluka kobongola motomboki, kino komonisa bopɔtu epai na bana mosusu. Na esika ya kobomba mabe na ye epai na libota, lobelá likambo yango elongo na bango na meko oyo ekoki mpe na lolenge ya kolendisa.​—Kokanisá na Masese 20:18.

25. (a) Na kolandáká ndakisa ya lisangá ya boklisto, lolenge nini baboti bakoki kosala soki mwana moko akómi mpenza motomboki? (b) Eloko nini baboti basengeli kobosana te soki moko kati na bana na bango akómi motomboki?

25 Ntoma Yoane alobaki na ntina na moto oyo akómaki motomboki makasi kati na lisangá ete: “Bóyamba ye kati na ndako na bino te; bópesa ye mbote te.” (2 Yoane 10, NW) Baboti bakoki komona malamu kokamata meko motindo wana mpo na mwana na bango soki akómi mokóló engebene mibeko ya mboka mpe amimonisi mpenza motomboki monene. Atako meko motindo wana ekoki kozala likambo ya mpasi mpe ya makasi mingi, mbala mosusu yango ezali na ntina mpo na kobatela basangani mosusu ya libota. Ndako na yo ezali na mposa ya libateli na yo mpe osengeli kokɛngɛla yango ntango nyonso. Na yango, landá kobatela malako ya sikisiki otyaki mpo na kobatela etamboli malamu, kasi ezala ya makambo makasi te. Sololá elongo na bana mosusu. Tyá likebi na lolenge oyo bazali kosala na kelasi mpe na lisangá. Lisusu, monisá bango ete atako ozali kondima te misala ya mwana oyo azali motomboki, ozali koyina ye te. Kweisá nde misala ya mabe na esika ya kokweisa mwana. Ntango bana mibali mibale ya Yakobo bayokisaki libota na bango nsɔni mpo na likambo oyo basalaki ya mobulu, Yakobo alakelaki nkanda na bango mabe, kasi alakelaki bana yango mabe te.​—Genese 34:1-31; 49:5-7.

26. Epai wapi baboti ya mayele bakoki kozwa kobɔndisama soki moko kati na bana na bango akómi motomboki?

26 Okoki kozala na mayoki ete yo nde ozali na ngambo na ntina na likambo oyo libimi kati na libota. Kasi soki osalaki na molende nyonso oyo ekokaki na yo kosala, na kolandáká toli ya Yehova engebene makoki na yo, ntina ezali te ya komikweisa na ngambo mpambampamba. Zwá libɔndisi na likambo oyo ete ezali na moto moko te oyo akoki kozala moboti ya kokoka na makambo nyonso, kasi na bosembo nyonso osalaki makasi mpo na kozala moboti malamu. (Kokanisá na Misala 20:26.) Kozala na motomboki ya motó makasi kati na libota ezali likambo oyo lipesaka mpasi na motema, kasi soki yango ekómeli yo, ondimisama ete Nzambe ayebi yango mpe akosundola soko moke te basaleli na ye oyo bamipesi epai na ye. (Nzembo 27:10) Na yango, zwá ekateli mpo ete ndako na yo ezala esika ya kobatelama mpe ya kimya kati na elimo mpo na bana oyo batikali.

27. Na komikundoláká lisese ya mwana na kilikili, epai wapi baboti ya mwana oyo azali motomboki bakoki ntango nyonso kotya elikya?

27 Lisusu, osengeli soko moke te kobungisa elikya. Milende na yo ya liboso oyo osalaki mpo na kobɔkɔla bana na lolenge lobongi ekoki na nsima kosimba motema ya mwana oyo abungi nzela mpe kozongisa ye na nzela malamu. (Mosakoli 11:6) Mabota mingi ya baklisto masili kokutana na likambo wana lokola yo, mpe basusu basili komona ete bana na bango oyo bakómaki batomboki basili kozonga na nzela malamu, motindo moko na tata oyo Yesu alobelaki kati na lisese ya mwana na kilikili. (Luka 15:11-32) Likambo wana likoki mpe kosalema epai na yo.