Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakɛngɛli

Bakɛngɛli

Masɛngami nini bankulutu basengeli kokokisa na ndenge oyo ebongi?

Na makambo nini mosusu bankulutu ya lisangá basengeli kozala ndakisa?

Masɛngami nini basaleli na misala basengeli kokokisa na ndenge oyo ebongi?

Mpo na nini tokoki koloba ete bankulutu baponamaka na nzela ya elimo santu?

Mis 20:28

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 13:​2-5; 14:23—Paulo ná Barnabasi, bakɛngɛli batamboli, batyaki bankulutu na masangá ndenge na ndenge; lelo oyo mpe bakɛngɛli ya zongazonga basalaka bongo. Babondelaka mpo na kosɛnga elimo santu mpe batalelaka masɛngami ya Biblia mpo moto akóma nkulutu na lisangá

    • Tit 1:​1, 5—Tito atambolaki na masangá ndenge na ndenge mpe azalaki kotya bankulutu

Lisangá ezali ya nani, mpe esombamaki na ntalo nini?

Mpo na nini Biblia emonisi ete bakɛngɛli bazali lokola basaleli to basali mpo na basusu?

Mpo na nini bakɛngɛli basengeli kozala na komikitisa?

Flp 1:1; 2:​5-8; 1Te 2:​6-8; 1Pe 5:​1-3, 5, 6

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 20:​17, 31-38—Ntoma Paulo akundwelaki bankulutu na Efese makambo asalaki mpo na bango, mpe bazalaki na botɔndi mpo na bolingo oyo amoniselaki bango

Ndenge nini mokɛngɛli atalelaka litambwisi oyo eutaka epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

Wapi lolenge eleki malamu oyo bankulutu bateyaka basusu?

1Ti 4:12; 1Pe 5:​2, 3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ne 5:​14-16—Lokola azalaki kobanga Yehova mingi, guvɛrnɛrɛ Nehemia asalelaki te bokonzi na ye na ndenge ya mabe epai ya basaleli ya Nzambe, azwaki ata te oyo azalaki na lotomo na yango

    • Yn 13:​12-15—Yesu ateyaki bayekoli na ye na ndenge azalaki na komikitisa

Ndenge nini mobateli ya mpate atyelaka ndeko mokomoko na lisangá likebi?

Ndenge nini bankulutu basalisaka baoyo bazali maladi na elimo?

Bankulutu bazali na mokumba nini ntango bazali koteya?

Milende nini bankulutu basalaka mpo lisangá ezala pɛto na elimo?

Formasyo nini bankulutu bapesaka basusu?

2Ti 2:​1, 2

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 10:​5-20—Yesu apesaki bantoma na ye 12 formasyo liboso atinda bango na mosala ya kosakola

    • Lk 10:​1-11—Yesu apesaki bayekoli na ye 70 malako ya sikisiki liboso atinda bango na mosala ya kosakola

Nini ekosalisa bankulutu bákokisa ebele ya mikumba na bango?

1Pe 5:​1, 7

Talá mpe Mas 3:​5, 6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 3:​9-12—Mokonzi Salomo abondelaki Yehova mpo azwa bososoli mpe mayele oyo esengeli mpo na kosambisa bato ya Yehova

    • 2Nt 19:​4-7—Mokonzi Yehoshafate atyaki basambisi na bingumba ya Yuda, mpe akundwelaki bango ete Yehova akozala na bango wana bazali kokokisa mikumba na bango ya ntina

Ndenge nini lisangá esengeli kotalela bakɛngɛli ya sembo?

1Te 5:​12, 13; 1Ti 5:17; Ebr 13:​7, 17

Talá mpe Ef 4:​8, 11, 12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 20:37—Bankulutu ya Efese bakakatanaki te komonisela ntoma Paulo bolingo

    • Mis 28:​14-16—Wana ntoma Paulo azalaki kokende na Roma, bandeko ya engumba yango basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 65, bakutanaki na ye na zando ya Apiusi, mpe balendisaki ye mpenza