Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamama

Bamama

Mikumba nini mama azali na yango?

Mas 31:​17, 21, 26, 27; Tit 2:4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 21:​8-12—Ntango Sara amonaki ete Yishimaele azali konyokola mwana na ye ya moke, Yisaka, asɛngaki Abrahama ete abatela Yisaka

    • 1Ba 1:​11-21—Ntango Bate-sheba ayebaki ete bokonzi mpe bomoi ya mwana na ye Salomo ezalaki na likama, asɛngaki Mokonzi Davidi akómisa Salomo mokonzi mpe abatela ye

Mpo na nini tosengeli kotosa mpe kokumisa mama na biso?

Kob 20:12; Mib 5:16; 27:16; Mas 1:8; 6:​20-22; 23:22

Talá mpe 1Ti 5:​9, 10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Pe 3:​5, 6—Ntoma Petro amonisaki ete epai ya bana basi mingi, Sara akómaki lokola mama mpo na kondima makasi oyo azalaki na yango

    • Mas 31:​1, 15, 21, 28—Mama ya Mokonzi Lemuele apesaki mwana na ye toli na likambo etali libala mpe mokumba ya ntina oyo mwasi to mama azali na yango

    • 2Ti 1:5; 3:15—Ntoma Paulo akumisaki mama ya Timote, Enise, mpo ateyaki mwana na ye makomami banda bomwana atako mobali na ye azalaki mondimi te