Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bana mpe bilenge

Bana mpe bilenge

Ndenge Nzambe atalelaka bana

Ndenge nini Yehova amonisi ete bana ná bilenge bazali na motuya na miso na ye?

Mib 6:​6, 7; 14:​28, 29; Nz 110:3; 127:​3-5; 128:​3, 4; Yk 1:27

Talá mpe Yb 29:12; Nz 27:10; Mas 17:6

Talá mpe “Libota

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 1:​27, 28—Yehova alingaki ete bato bábota mpe bátondisa mabele

    • Eb 9:1—Nsima ya Mpela, Nzambe ayebisaki Noa ná bana na ye ete bábota mpe bátondisa mabele

    • Eb 33:5—Yakobo, moto ya sembo, atalelaki bana na ye ete bazali likabo oyo euti epai ya Nzambe

    • Mr 10:​13-16—Yesu alingaki bana kaka ndenge Tata na ye alingaka bana

Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo babubaka bana to banyokolaka bango?

Mitinda nini ya Biblia emonisi ete tosengeli kozela te ete bana básala makambo lokola mikóló?

Mit 1:3; 1Ko 13:11

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 33:​12-14—Yakobo atambolaki malɛmbɛmalɛmbɛ mpo mobembo ezala mpasi te mpo na bana

Esengeli kopesa Nzambe fɔti ndenge bana bazali konyokwama na mokili oyo?

Yb 34:10; Yk 1:13; 1Yn 5:19

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 5:​18, 20, 23-25—Yesu alimbolaki ete soki tobɛlaka ezali nde mpo na lisumu

    • Ro 5:12—Ntoma Paulo amonisaki ntina oyo lisumu mpe liwa ekɔtaki na mokili

Ndenge nini Yehova andimisi biso ete bampasi nyonso oyo bana bamonaka ekosila?

Soki baboti na biso basalaki libunga ya monene to basalelaki biso makambo na nko na bomwana, elakisi nde ete tozali na ntina te to tokosala mabunga oyo bango basalaki?

Mib 24:16; Ezk 18:​1-3, 14-18

Talá mpe Mib 30:​15, 16

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 18:​1-7; 2Nt 28:​1-4—Atako azalaki na tata ya mabe oyo abomaki bana na ye mosusu, Ezekiasi akómaki mokonzi monene mpe ya sembo

    • 2Ba 21:​19-26; 22:​1, 2—Atako tata na ye Amone azalaki mokonzi moko mabe, Yosiya akómaki mokonzi ya malamu

    • 1Ko 10:​11, 12—Ntoma Paulo amonisi ete tokoki kozwa mateya na mabunga ya basusu mpe koboya kozongela yango

    • Flp 2:​12, 13—Ntoma Paulo akundweli biso ete soki totikali sembo tokobika

Mikumba ya bana mpe ya bilenge

Ndenge nini Yehova atalelaka bana oyo bazali naino kofanda na ndako ya baboti na bango oyo babangaka Nzambe?

1Ko 7:14

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 19:​12, 15—Ntina mosusu oyo baanzelu babatelaki bana basi ya Lota ezalaki mpo tata na bango azalaki sembo

Soki baboti babangaka Nzambe, yango elingi koloba ete bana mpe bakobanga Nzambe?

Mas 20:11; Ezk 18:​5, 10-13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Le 10:​1-3, 8, 9—Bana ya nganga-nzambe monene Arona babomamaki, mbala mosusu mpo balangwaki masanga

    • 1Sa 8:​1-5—Atako Samwele azalaki mosakoli ya sembo, bana na ye bazalaki na bizaleli ya mabe

Bana basengeli kosala nini mpo Nzambe asepela na bango?

Mpo na nini bana basengeli kokendaka makita?

Mib 31:​12, 13; Ebr 10:​24, 25

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 15:​32-38—Bana mike mpe bazali na kati ya bato oyo Yesu azalaki koteya

Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka ete bana básambela ye?

Nz 8:2; 148:​12, 13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 17:​4, 8-10, 41, 42, 45-51—Yehova asalelaki elenge Davidi mpo akumisa nkombo na ye ndenge alongaki engambe moko ya mabe

    • 2Ba 5:​1-15—Yehova asalelaki mwana-mwasi moko ya moke Moyisraele mpo na kosalisa mokonzi ya basoda oyo azalaki Moyisraele te ayeba Nzambe ya solo

    • Mt 21:​15, 16—Yesu azwaki na motuya bana oyo bamoniselaki ye limemya

Ndenge nini Nzambe atalelaka bana oyo baboti na bango bazali Batatoli te?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mit 16:​25, 26, 32, 33—Ntango bato mosusu batombokelaki Moize ná Arona, Yehova apesaki bango ná mabota na bango etumbu

    • Mit 26:​10, 11—Atako motomboki Kora abomamaki, bana na ye babomamaki te, na ntembe te mpo bazalaki sembo

Mpo na nini bilenge basengeli kopona baninga na bango na bwanya?

Bilenge bakristo basengeli koluka baninga ya ndenge nini?

2Ti 2:22

Talá mpe “Baninga