Boboto
Nini emonisaka boboto ya Yehova na ndenge ya polele?
Ro 3:23, 24; Tit 3:3-6; Ebr 2:9; 1Pe 5:5
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Yon 3:10; 4:11—Yehova amonisaki boboto na ndenge alimbisaki bato ya Ninive oyo babongolaki motema. Ayokelaki ata banyama na bango mawa
-
Lk 6:32-36—Yesu alendisaki biso tózala na boboto ndenge Yehova azali na boboto ezala epai ya baoyo bazangi botɔndi mpe bato mabe
-
Na makambo nini tokoki komonisa ezaleli ya boboto?
Mas 19:17; 22:9; Lk 6:35; Ef 4:32
Talá mpe Mas 11:17; 31:10, 26; Ebr 13:16
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Mr 14:3-9; Yn 12:3—Yesu akumisaki Maria ndeko ya Lazare mpo na ezaleli na ye ya kokaba mpe ya boboto
-
2Ti 1:16-18—Onezifore alendisaki ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔkɔ
-