Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bokeseni kati na bato

Bokeseni kati na bato

Nzambe amonaka ete bato boye baleki basusu mpo na loposo, libota, to bozwi oyo bazali na yango?

Mis 17:​26, 27; Ro 3:​23-27; Ga 2:6; 3:28

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 8:​31-40—Bayuda mosusu bazalaki komikumisa ete bazali bana ya Abrahama, kasi Yesu asembolaki bango mpo bazalaki te kosala makambo lokola Abrahama

Ebongi mpenza tókanisa ete tozali na ntina koleka bato ya loposo to ekólo mosusu?

Yn 3:16; Ro 2:11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yon 4:​1-11—Yehova ateyaki mosakoli Yona ete amonisela bato ya Ninive, oyo bazalaki bato ya ekólo mosusu motema mawa

    • Mis 10:​1-8, 24-29, 34, 35—Ntoma Petro ayekolaki ete asengelaki te komona bato ya bikólo mosusu mbindo, na yango, asalisaki Korneyi ná libota na ye bákóma bakristo ya liboso ya ekólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te

Bakristo oyo bazali na bozwi basengeli nde kakanisa ete baleki basusu to koluka ete básalela bango makambo koleka basusu?

Soki moto azali mokɛngɛli, yango elingi nde koloba ete aleki basusu mpe akoki kosalela bango makambo ndenge alingi?

2Ko 1:24; 1Pe 5:​2, 3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 17:​18-20—Yehova akebisaki bakonzi ya Yisraele ete basengeli te komitombola likoló ya bato na ye, mpo na miso na ye bazali bandeko

    • Mr 10:​35-45—Yesu asembolaki bantoma na ye mpo bazalaki koluka esika ya lokumu. (Talá mpe nɔti ya boyekoli na Mr 10:​42, “balakisaka bato bokonzi na bango” na français)

Nzambe andimaka bato ya ndenge nini?

Bakristo basengeli kokɔta na bibongiseli oyo elukaka kobongola makambo na ekólo?

Ef 6:​5-9; 1Ti 6:​1, 2

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 6:​14, 15—Bato mingi balingaki ete Yesu asilisa bampasi ya ekólo na bango, kasi aboyaki kozala mokonzi na mokili oyo