Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boyengebene

Boyengebene

Kaka nani nde azali na lotomo ya kokata oyo ezali malamu mpe sembo?

Mib 32:4; Ezk 33:​17-20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 18:​23-33—Yehova amonisaki Abrahama ete azali Mosambisi ya boyebengene

    • Nz 72:​1-4, 12-14—Nzembo oyo ekumisi Masiya Mokonzi, mpo amonisaka boyengebene ya Yehova na ndenge ya kokoka

Matomba nini tozwaka ntango totosaka mibeko ya sembo ya Yehova?

Nz 37:​25, 29; Yk 5:16; 1Pe 3:12

Talá mpe Nz 35:24; Yis 26:9; Ro 1:17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 37:​22-24—Elihu akumisaki boyengebene ya Yehova, mpo esalaka ete basaleli na ye bábanga ye

    • Nz 89:​13-17—Mokomi ya Nzembo akumisaki Yehova mpo ayangelaka na bosembo

Koluka bosembo ya Nzambe elimboli nini?

Ezk 18:​25-31; Mt 6:33; Ro 12:​1, 2; Ef 4:​23, 24

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 6:​9, 22; 7:1—Noa amonisaki ete azali sembo na ndenge asalaki kaka makambo oyo Yehova asɛngaki ye

    • Ro 4:​1-3, 9—Yehova atalelaki Abrahama lokola moyengebene mpo amonisaki kondima makasi

Mpo na nini kozala moyengebene esengeli kosimbama na bolingo oyo tozali na yango mpo na Yehova kasi te mpo bato bámona biso bongo?

Mt 6:1; 23:​27, 28; Lk 16:​14, 15; Ro 10:10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 5:20; 15:​7-9—Yesu ayebisaki bato ete bázala bayengebene kasi te na kolanda mibeko ya bakomeli ná Bafarisai, oyo bazalaki bakosi

    • Lk 18:​9-14—Yesu apesaki ndakisa mpo na kosembola baoyo bazalaki komimona bayengebene na miso na bango moko mpe komona basusu mpamba

Mpo na nini bolamu eleki ata boyengebene?

Mpo na nini tosengeli koboya komimona bayengebene mpe koboya kolakisa ete tozali bayengebene koleka basusu?