Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Komipesa

Komipesa

Nini mpenza etindaka moto amipesa epai ya Yehova Nzambe?

Soki tolingi kosalela Nzambe, ndenge nini tosengeli kotalela Biblia?

Tosengeli koyeba nini na oyo etali ndenge oyo Nzambe asalisaka biso tólonga lisumu?

Kobongola motema na makambo ya mabe oyo tosalá esɛngi nini?

Mis 3:19; 26:20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 19:​1-10—Zakai, mokonzi ya bakɔngɔli mpako, abongolaki motema, atikaki kobuba bato mpe azongisaki biloko oyo abɔtɔlaki

    • 1Ti 1:​12-16—Ntoma Paulo amonisaki ndenge oyo atikaki bomoi ya masumu mpe alimbisamaki na nzela ya motema mawa ya Nzambe mpe ya Yesu

Soki totiki kosala oyo eza mabe, tosengeli kosala lisusu nini?

Mibeko nini tosengeli kotosa mpo Nzambe andima losambo na biso?

1Ko 6:​9-11; Kol 3:​5-9; 1Pe 1:​14, 15; 4:​3, 4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ko 5:​1-13—Ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Korinti ete elongola na kati na yango mobali oyo azalaki na etamboli ya mbindo

    • 2Ti 2:​16-19—Ntoma Paulo akebisaki Timote ete aboya maloba ya bapɛngwi, oyo epalanganaka lokola mpota oyo elyaka nzoto

Mpo na nini tosengeli te kopesa baguvɛrnema ya mokili oyo mabɔkɔ?

Yis 2:​3, 4; Yn 15:19

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 6:​10-15—Ntango Yesu aleisaki ebele ya bato na ndenge ya likamwisi, bato balukaki kokómisa ye mokonzi, kasi Yesu alongwaki kati na bango

    • Yn 18:​33-36—Yesu amonisaki ete Bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te

Ndenge nini elimo santu esalisaka biso tósalela Nzambe?

Yn 16:13; Ga 5:​22, 23

Talá mpe Mis 20:28; Ef 5:18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 15:​28, 29—Lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme etambwisamaki na elimo santu mpo na kozwa ekateli moko ya ntina mingi na oyo etali kokatama ngenga

Na ndenge nini komipesa na biso na Nzambe esengeli kozala lokola oyo ya Yesu Kristo?

Mpo na nini bakristo oyo bamipesi na Nzambe basengeli kozwa batisimo?

Mt 28:​19, 20; Mis 2:​40, 41; 8:12; 1Pe 3:21

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 3:​13-17—Yesu ayaki mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe amonisaki yango ntango azwaki batisimo

    • Mis 8:​26-39—Mosali moko monene, moto ya Etiopi, oyo akómaki kosambela Yehova, asɛngaki ete azwa batisimo ntango ayokaki nsango malamu etali Yesu Kristo