Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosangisa losambo

Kosangisa losambo

Bato ya mangomba nyonso basambelaka kaka Nzambe moko?

Biblia eteyaka nde ete Yehova andimaka mangomba nyonso, ata soki mateya na yango ekeseni?

Mt 7:​13, 14; Yn 17:3; Ef 4:​4-6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yos 24:15—Yosua alobaki ete tosengeli kopona soki tokosalela Yehova to banzambe mosusu

    • 1Ba 18:​19-40—Yehova asalelaki mosakoli Eliya mpo amonisa ete basambeli ya Nzambe ya solo basengeli te kosangana na losambo ya banzambe mosusu, na ndakisa Baala

Ndenge nini Yehova atalelaka banzambe ya bikólo mpe losambo oyo bapesaka bango?

Ndenge nini Yehova ayokaka ntango bato balobaka ete basambelaka ye kasi bazali kosangisa losambo yango na mimeseno oyo ayinaka?

Yis 1:​13-15; 1Ko 10:​20-22; 2Ko 6:​14, 15, 17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Kob 32:​1-10—Yehova asilikaki makasi ntango Arona asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ, ata soki bato balobaki ete basalaki yango mpo na kosala “fɛti mpo na Yehova”

    • 1Ba 12:​26-30—Mokonzi Yeroboame alingaki te ete bato bakendaka na tempelo na Yerusaleme, yango wana asalaki bikeko mpe alobaki ete ezali komonisa Yehova mpe ememaki bato na lisumu

Ndenge nini Yehova ateyaki Bayisraele ete basengelaki te kosangana na baoyo basambelaka banzambe mosusu?

Yehova asalaki nini ntango bato na ye bakómaki kosalela banzambe mosusu?

Bas 10:​6, 7; Nz 106:​35-40; Yir 44:​2, 3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 11:​1-9—Basi bapaya ya Mokonzi Salomo batyaki ye mbamba mpo asambela banzambe na bango, yango elendisaki losambo ya banzambe mosusu mpe Yehova asilikaki

    • Nz 78:​40, 41, 55-62—Asafe amonisaki ndenge oyo botomboki mpe losambo ya bikeko ya Bayisraele esalaki Yehova mpasi mpe abwakaki bato na ye

Yesu azalaki nde kondima mateya ya mangomba oyo ezalaki na boyokani te na liloba ya Nzambe?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 16:​6, 12—Yesu akokanisaki mateya ya Bafarisai mpe ya Basadukai na levire, mpo mateya ya lokuta epanzanaka mbangu mpe ebebisaka mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe

    • Mt 23:​5-7, 23-33—Yesu akweisaki mpenza bokosi mpe mateya ya lokuta ya bakomeli ná Bafarisai

    • Mrk 7:​5-9—Yesu amonisaki polele ete bakomeli ná Bafarisai bazalaki kotya Liloba ya Nzambe pembeni mpo na koteya bonkɔkɔ ya bato

Yesu alendisaki nde bayekoli na ye básala mwa bituluku mosusu ya mangomba?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 15:​4, 5—Yesu asalelaki nzete ya vinyo mpo na komonisa bomoko oyo bayekoli na ye basengeli kozala na yango elongo na ye mpe bandeko na bango bakristo

    • Yn 17:​1, 6, 11, 20-23—Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye, ntango Yesu azalaki na bantoma, abondelaki mpo na bomoko ya bayekoli na ye nyonso ya solo

Bakristo nyonso ya siɛklɛ ya liboso bazalaki nde na bindimeli moko mpe bazalaki kosambela Yehova ndenge moko?

Mis 16:​4, 5; Ro 12:​4, 5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 11:​20-23, 25, 26—Masangá na Antiokia mpe na Yerusaleme ezalaki kosala elongo mpe na bomoko

    • Ro 15:​25, 26; 2Ko 8:​1-7—Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki bolingo na ndenge bazalaki kosalisana na ntango ya mpasi, yango emonisaki ete bazalaki na bomoko

Nzambe andimaka mangomba nyonso oyo elobaka ete endimelaka Yesu?

Soki bandimi ya lingomba moko bazali kotosa te mateya ya Kristo mpe ya bantoma, losambo na bango ekondimama?

Mis 20:​29, 30; 1Ti 4:​1-3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 13:​24-30, 36-43—Yesu apesaki ndakisa mpo na komonisa ete kaka ndenge matiti mabe ebimaka na elanga, bakristo ebele ya lokuta mpe bakobima mpe bakokɔta na lisangá

    • 1Yn 2:​18, 19—Ntoma Yoane, oyo akómaki mobange, amonisaki ete ebele ya batɛmɛli ya Kristo basilaki kobima na nsuka ya siɛklɛ ya liboso

Nini ekoki kosalema soki batiki mateya ya lokuta mpe etamboli mabe na lisangá?

Bakristo basengeli kosala nini mpo bábatela bomoko?

Mpo na nini bakristo ya solo basengeli te kosangana na losambo ya lokuta?

Mpo na nini ezali malamu mpe ebongi komonisa polele mateya ya mangomba ya lokuta?

Mpo na nini tosengeli kokamwa te ntango bato ya mangomba ya lokuta bazali kotɛmɛla mpe konyokola biso?