Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koyekola

Koyekola

Mpo na nini mokristo asengeli koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala?

Nz 1:​1-3; Mas 18:15; 1Ti 4:6; 2Ti 2:15

Talá mpe Mis 17:11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 119:​97-101—Mokomi ya nzembo alobaki ete alingaka Mobeko ya Nzambe mpe kosalela yango ekómisaki bomoi na ye malamu koleka

    • Da 9:1-3, msl.—Na lisalisi ya boyekoli ya babuku mosantu, mosakoli Danyele asosolaki ete mosika te mbula 70 ya boombo ekosuka

Mpo na nini tosengeli kokolisa boyebi na biso?

Ebr 6:​1-3; 2Pe 3:18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mas 4:18—Kaka ndenge pole ya ntɔngɔ engɛngaka se kongɛnga, moto ya elimo mpe akangaka mokemoke ntina ya mateya ya Biblia

    • Mt 24:​45-47—Yesu amonisaki ete akotya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo akozala na mokumba ya kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi na boumeli ya mikolo ya nsuka

Mpo na nini bwanya ya Biblia eleki bwanya nyonso oyo ezali na babuku oyo bato bakomá?

Elaka nini Yehova apesi epai ya baoyo bayekolaka Biblia na likanisi ya kosepelisa ye?

Tosengeli kobondela mpo na likambo nini mpo tózwa matomba na boyekoli na biso ya Biblia?

Mpo na nini tosengeli kotya likebi na bilei nyonso ya elimo oyo tozwaka na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

Mpo na nini tosengeli koluka kozwa boyebi ya sikisiki mpe kotya likebi ata na makambo ya mikemike?

Kozwa bwanya mpe bososoli ezali na litomba nini?

Mpo na nini tosengeli kotángaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe kokanisa na mozindo makambo oyo totángi?

Ndenge nini tokoki kosalela Biblia na bomoi na biso?

Mpo na nini tosengeli kokanisa na mozindo ndenge ya koyebisa basusu makambo oyo toyekoli?

Koyekola mbala na mbala mateya ya ntina ekosalisa biso na nini?

2Pe 1:13; 3:​1, 2

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 6:​6, 7; 11:​18-20—Yehova apesaki mitindo ete baboti bákɔtisa maloba na ye na kati ya mitema ya bana, báteya bango na libaku nyonso

Wapi matomba ya kolobela Liloba ya Nzambe na kati ya libota?

Ef 6:4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 18:​17-19—Yehova alingaki ete Abrahama ateya bato ya ndako na ye bálanda nzela ya bosembo

    • Nz 78:​5-7—Na Yisraele, libota nyonso esengelaki koteya bana na bango makambo ya Yehova mpo ete libota oyo ekoya na nsima etyela Nzambe motema

Ndenge nini koyekola elongo na makita ya lisangá esalisaka biso?

Ebr 10:25

Talá mpe Mas 18:1