Libota
Yehova azalisaki ebongiseli ya libota
Baboti
Talá “Baboti”
Batata
Talá “Batata”
Bamama
Talá “Bamama”
Mibali, Basi
Talá “Libala”
Bana mibali mpe bana basi
Bana bazali na mokumba nini na libota?
Mpo na nini bana basengeli kotosa baboti na bango?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Nz 78:1-8—Bayisraele bayebisaki bana na bango makambo oyo bankɔkɔ na bango basalaki ntango Yehova apesaki bango mibeko, mpo bana bátyela Nzambe motema mpe bákóma batomboki te
-
Lk 2:51, 52—Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu atosaki baboti na ye oyo bazangaki kokoka na bolenge na ye
-
Mpo na nini bana bakoki komona ete ezali mpasi bátosa baboti?
Ndenge nini Nzambe atalelaka bana oyo bazali batomboki?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Mib 21:18-21—Na kotalela Mibeko ya Moize, soki mwana azali motó makasi, motomboki mpe aboyi kotosa baboti na ye, asengelaki kobomama
-
2Ba 2:23, 24—Ntango bana batyolaki mosakoli Elisha, momonisi ya Nzambe, urse mibale elyaki bana ebele kati na bango
-
Ndenge nini baboti basengeli kotalela mokumba ya kobɔkɔla bana?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Le 26:9—Epai ya Bayisraele, kobota bana ezalaki elembo ya lipamboli ya Yehova
-
Yb 42:12, 13—Yehova apambolaki Yobo mpo na bosembo na ye mpe apesaki ye ná mwasi na ye bana mosusu zomi
-
Ndenge nini bandeko ya libota basengeli kosalelana makambo na ndenge oyo ekokumisa Yehova?
Mokumba nini bana oyo bakoli bazali na yango epai ya baboti mpe bankɔkɔ na bango?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Eb 11:31, 32—Ntango balongwaki na Ure, Abrahama amemaki tata na ye Tera mpe abatelaki ye tii ntango akufaki
-
Mt 15:3-6—Yesu asalelaki Mibeko ya Moize mpo na komonisa ete bana oyo bakoli basengeli kosalisa baboti na bango oyo bazali na bosɛnga
-
Babokilo to basɛmɛki
Talá “Babokilo to basɛmɛki”
Bankɔkɔ
Talá “Bankɔkɔ”