Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisumu

Lisumu

Lisumu ezali nini, mpe mpo na nini biso nyonso tosalaka lisumu?

Ndenge nini Biblia endimisi biso ete tokoki kobundisa bamposa na biso ya kosala masumu?

Ro 6:​12-14

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Sa 11:​2-5, 14, 15, 26, 27; 12:​1-13—Mokonzi Davidi asalaki masumu minene, azwaki disiplini ya makasi mpe asalaki nyonso abongisa etamboli na ye

    • Ro 7:​15-24—Ntoma Paulo azali ndakisa malamu mpo na kondima mpe kokangama na Nzambe, amonisaki ete asengeli kobundisa bamposa ya kosala lisumu

Ndenge nini kozanga boyebi mpe kolɛmba nzoto esalaka ete bato mingi básala lisumu?

Mpo na nini ezali mabe mpenza kokoba kosala lisumu na nko?

Satana akoki kosalela nini mpo na kotinda basaleli ya Nzambe básala lisumu?

Mas 1:​10, 11, 15; Mt 5:28; Yk 1:​14, 15

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 3:​1-6—Na nzela ya nyoka, Satana amekaki Eva mpo Eva amonisa moimi mpe lokoso, mpe yango esalaki ete andimela Yehova te

    • Mas 7:​6-10, 21-23—Mokonzi Salomo alobelaki elenge mobali oyo azangaki bososoli mpe akweaki na komekama ya mwasi ya ndumba

Ndenge nini tokoki kotɛmɛla komekama ya Satana?

Ef 4:27; 6:​10-18; Yk 4:​7, 8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mas 5:​1-14—Lokola tata, Mokonzi Salomo apesaki toli oyo eutaki epai ya Nzambe, oyo emonisaki ntina mpe ndenge ya kokima komekama ya kosala pite

    • Mt 4:​1-11—Yesu asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kotɛmɛla komekama ya Satana

Wapi mwa masumu minene oyo bakristo basengeli koboya?

Talá “Misala ya mabe

Koyambola masumu

Mpo na nini tosengeli koluka te kobomba masumu na biso?

Tosengeli koyambola masumu nyonso epai ya nani?

Nani azali “mosungi” oyo asɛngaka mpo na bolamu na biso epai ya Yehova?

Ndenge nini mosumuki amonisaka na misala ete abongoli motema?

Mis 26:20; Yk 4:​8-10

Talá mpe “Kobongola motema

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Kob 22:​1-12—Mibeko ya Moize esɛngaki ete moyibi afuta mpo na eloko oyo ayibaki

    • Lk 19:​8, 9—Zakai, mokonzi ya bakɔngɔli-mpako, abongolaki motema na ndenge atikaki mabe mpe azongisaki biloko ya bato oyo asalaki mabe

Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akolimbisa biso?

Talá “Kolimbisa

Ebongiseli nini Yehova azwá mpo na kosalisa mpe kobatela lisangá ntango moto moko asali lisumu ya monene?

Lisumu ya monene ekoki kosala nini na libota na biso mpe na lisangá?

Ebr 12:​15, 16

Talá mpe Mib 29:18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yos 7:​1-13, 20-26—Akana amemelaki libota na ye mpe Yisraele mobimba mpasi na ndenge asalaki lisumu ya monene mpe alukaki kobomba yango

    • Yon 1:​1-16—Lokola atombokelaki Yehova, mosakoli Yona atyaki na likama bomoi ya bato nyonso oyo bazalaki elongo ye na masuwa

    • 1Ko 5:​1-7—Ntoma Paulo amonisaki polele lisumu monene oyo esalemaki na Korinti oyo esalaki lisangá mobimba mabe

Mpo na nini tosengeli kotika te ete kobanga kozwa disiplini epekisa biso koluka lisalisi epai ya bankulutu?

Mpo na nini tosengeli kondima ete Nzambe alimbisá biso na esika ya kokoba koyoka mawa mpo na mabe tosalá kala?

Talá mpe “Kolimbisa

Soki toyebi ete lisumu moko monene esalemi, mpo na nini tosengeli komindimisa ete mosumuki ayebisi bankulutu ya lisangá?

Le 5:1

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 13:​6-9; 21:​18-20—Mibeko ya Moize esɛngaki ete moto ayebisa lisumu ya monene oyo ndeko na ye ya libota to moto oyo alingaka asali