Losambo
Tosengeli kosambela kaka nani?
Kob 34:14; Mib 5:8-10; Yis 42:8
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Mt 4:8-10—Satana ayebisaki Yesu ete akopesa ye makonzi nyonso ya mabele soki asambeli ye; Yesu aboyaki, azalaki na ekateli ya kosambela kaka Yehova
-
Em 19:9, 10—Anzelu moko ya nguya aboyaki ntoma Yoane asambela ye
-
Ndenge nini Yehova alingaka tósambela ye?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Yis 1:10-17—Yehovah andimaka te losambo ya bato oyo basalelaka ye na bokosi, oyo batosaka te mibeko na ye
-
Mt 15:1-11—Yesu amonisaki ete Yehova andimaka te losambo ya baoyo bátyaka mibeko ya bato na esika ya liboso koleka mibeko ya Nzambe
-
Soki likoki ezali, tosengeli kosambela Yehova elongo na banani?
Talá mpe Nz 133:1-3
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Mis 2:40-42—Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki koyangana elongo mpo na kobondela, kolekisa ntango, mpe koyekola liloba ya Nzambe
-
1Ko 14:26-40—Ntoma Paulo amonisaki ete makita ya lisangá esengeli kobongisama malamu mpe kolendisa mpo moto nyonso ayekola mpe akanga ntina ya mateya
-
Tosengeli kosala nini mpo tómindimisa ete Yehova andimaka losambo na biso?
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Ebr 11:6—Ntoma Paulo amonisaki ete kondima ezali na ntina soki tolingi Yehova andima losambo na biso
-
Yk 2:14-17, 24-26—Yakobo, ndeko ya Yesu, amonisaki ete kondima na biso esengeli komonana na misala; kondima etindaka biso na misala
-