Makambo oyo elɛmbisaka
Ntango basusu basundoli yo, bayokisi yo mpasi to batɛki yo, ekoki kolɛmbisa yo
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
1Sa 8:1-6—Mosakoli Samwele ayokaki mpasi mpe alɛmbaki ntango Bayisraele batyaki ye mbamba atyela bango mokonzi
-
1Sa 20:30-34—Yonatane ayokaki mpasi mpe nsɔni ntango tata na ye, Mokonzi Saulo, ayokelaki ye nkanda makasi
-
-
Bavɛrsɛ ya kobɔndisa:
-
Talá mpe Mas 19:11; Flp 4:8
-
Bandakisa oyo ekoki kobɔndisa:
-
Nz 55:12-14, 16-18, 22—Atako moninga na ye ya motema Ahitofele atɛkaki ye, Davidi abwakelaki Yehova mitungisi na ye mpe azwaki libɔndisi
-
2Ti 4:16-18—Atako akutanaki na komekama mpe bato basundolaki ye, ntoma Paulo azwaki nguya epai ya Yehova mpe na elikya oyo Nzambe apesaka
-
Bolɛmbu mpe masumu na biso ekoki kolɛmbisa biso
-
Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:
-
Nz 51:1-5—Mokonzi Davidi ayokaki mpasi mpo na masumu oyo asalelaki Yehova
-
Ro 7:19-24—Ntoma Paulo ayokaki mawa mpo asengelaki kobundisa bamposa na ye moko ya kosala lisumu
-
-
Bavɛrsɛ ya kobɔndisa:
-
Bandakisa oyo ekoki kobɔndisa:
-
1Ba 9:2-5—Atako Mokonzi Davidi asalaki masumu ya minene, Yehova atángaka ye lokola moto ya sembo
-
1Ti 1:12-16—Atako asalaki masumu ya minene kala, ntoma Paulo andimaki ete Nzambe akoyokela ye mawa
-