Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova

Yehova

Nkombo na ye

Nkombo Yehova elimboli “Akómisaka”

Yehova akómaka nani to nini, mpe asalaka nini mpo na kosalisa basaleli na ye?

Mpo na nini kosantisama ya nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi koleka?

Mpo na nini ebongi mpenza bato nyonso bátosa Yehova, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso?

Batitre mosusu ya Yehova

Mozwi-ya-Nguya-Nyonso—Eb 17:1; Em 19:6

Tata—Mt 6:9; Yn 5:21

Molakisi Monene—Yis 30:20

Yehova ya mampinga—1Sa 1:11

Mokonzi ya seko—1Ti 1:17; Em 15:3

Mokonzi Monene—Ebr 1:3; 8:1

Oyo-Aleki-Likoló—Eb 14:​18-22; Nz 7:17

Libanga—Mib 32:4; Yis 26:4

Nkolo-Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso —Yis 25:8; Am 3:7

Bizaleli mosusu ya Yehova

Ndenge nini Yehova amonisi polele ete azali mosantu, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?

Kob 28:36; Le 19:2; 2Ko 7:1; 1Pe 1:​13-16

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yis 6:​1-8—Ntango mosakoli Yisaya amonaki emonaneli ya Yehova, amonaki ete abongi te mpo azalaki moto ya masumu, kasi serafɛ moko amonisaki ye ete ata bato ya masumu bakoki komonana pɛto na miso ya Nzambe

    • Ro 6:​12-23; 12:​1, 2—Ntoma Paulo amonisaki ndenge oyo tokoki kobundisa bamposa na biso ya kosala masumu mpe kolanda “bosantu”

Nguya nini Yehova azali na yango, mpe asalelaka yango na makambo lokola nini?

Kob 15:​3-6; 2Nt 16:9; Yis 40:​22, 25, 26, 28-31

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 8:​12-18—Mosakoli Moize akundwelaki Bayisralele ete soki bazalaki na biloko mingi ya kitoko, ezalaki mpo Yehova asalelaki nguya na ye mpo na kopambola bango

    • 1Ba 19:​9-14—Yehova amonisaki nguya na ye na ndenge ya kokamwa mpo na kolendisa mosakoli Eliya ntango atungisamaki

Mpo na nini bosembo ya Yehova nde eleki malamu?

Mib 32:4; Yb 34:10; 37:23; Nz 37:28; Yis 33:22

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 24:​16-22—Ndenge mibeko ya Moize emonisaki yango, bosembo ya Yehova ezali mpenza na boyokani na motema mawa mpe bolingo na ye

    • 2Nt 19:​4-7—Mokonzi Yehoshafate akundwelaki basambisi oyo atyaki ete bazali komonisa bosembo ya Yehova, kasi ya moto te

Nini emonisi ete Yehova aleki bato nyonso na bwanya?

Nz 104:24; Mas 2:​1-8; Yir 10:12; Ro 11:33; 16:27

Talá mpe Nz 139:14; Yir 17:10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 4:​29-34—Yehova apambolaki mokonzi Salomo, apesaki ye bwanya mingi koleka bato nyonso ya ntango na ye

    • Lk 11:31; Yn 7:​14-18—Yesu alekaki Salomo na bwanya, kasi ayebaki ete bwanya na ye eutaki epai ya Yehova

Ndenge nini Yehova amonisi ete bolingo ezali ezaleli na ye ya libosoliboso?

Yn 3:16; Ro 8:32; 1Yn 4:​8-10, 19

Talá mpe Sef 3:17; Yn 3:35

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 10:​29-31—Yesu asalelaki ndakisa ya bakɛngɛli-mboka mpo na komonisa ndenge oyo Yehova alingaka mpe atalelaka mosaleli na ye mokomoko

    • Mr 1:​9-11—Yehova ayebisaki Yesu ete alingaka ye mpe azalaki na esengo ya kozala Tata na ye. Yango ezali ndakisa malamu mpo na baboti mpo mwana nyonso alingaka koyoka ete tata na ye alingaka ye

Wapi bantina mosusu oyo tolingaka Yehova? Biblia emonisi bizaleli kitoko oyo Yehova azali na yango. Kati na yango . . .

Amonaka nyonso—2Nt 16:9; Mas 15:3

Abongwanaka te; abongi kotyelama motema—Mal 3:6; Yk 1:17

Azali na motema mawa—Yis 49:15; 63:9; Zek 2:8

Azali seko na seko; ebandeli te nsuka te—Nz 90:2; 93:2

Akabaka—Nz 104:​13-15; 145:16

Atondi na nkembo—Em 4:​1-6

Nzambe ya esengo—1Ti 1:11

Azali na komikitisa—Nz 18:35

Azali na boboto—Lk 6:35; Ro 2:4

Azali sembo—Em 15:4

Azali monene—Nz 8:1; 148:13

Atondi na mawa—Ex 34:6

Azali na motema molai—Yis 30:18; 2Pe 3:9

Nzambe ya kimya—Flp 4:9

Boyengebene—Mib 32:4

Nini ekosalema soki toyebi Yehova Nzambe malamumalamu?

Ndenge oyo tokoki kosalela Yehova

Nini emonisi ete Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki makoki na biso?

Mib 10:12; Mik 6:8; 1Yn 5:3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 30:​11-14—Mibeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize ezalaki mpasi te mpo Bayisraele bátosa yango

    • Mt 11:​28-30—Yesu, oyo amonisaki Tata na ye na ndenge ya kokoka, andimisaki bayekoli na ye ete azali Nkolo ya boboto

Mpo na nini ebongi ete tósanzolaka Yehova?

Nz 105:​1, 2; Yis 43:​10-12, 21

Talá mpe Yir 20:9; Lk 6:45; Mis 4:​19, 20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Ndenge nini etamboli na biso ekoki kopesa litatoli mpo na Yehova?

Mpo na nini tosengeli kopusana penepene ya Yehova?

Ndenge nini komikitisa ekosalisa biso tópusana penepene ya Yehova?

Ndenge nini kotánga Biblia mpe komanyola esalisaka biso tópusana penepene ya Yehova?

Mpo na nini ebongi mpenza tósalelaka makambo oyo toyekolaka mpo na Yehova?

Mpo na nini tosengeli ata moke te komeka kobombela Yehova makambo?

Yb 34:22; Mas 28:13; Yir 23:24; 1Ti 5:​24, 25

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 5:​20-27—Gehazi alingaki kobomba lisumu na ye, kasi Yehova asalisaki mosakoli Elisha amona likambo asalaki

    • Mis 5:​1-11—Ananiasi ná Safira balingaki kobomba lisumu na bango, kasi Yehova amonisaki yango polele mpe bazwaki etumbu