Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 3: Adam ná Eva

Lisolo 3: Adam ná Eva

TOZALI komona nini na elilingi oyo? Tozali komona bato. Mobali ya liboso ná mwasi ya liboso. Nani asalaki bango? Nzambe. Boyebi nkombo ya Nzambe? Nkombo na ye Yehova. Bongo apesaki mobali nkombo Adama, mpe mwasi nkombo Eva.

Adama ná Eva na elanga ya Edene

Talá ndenge Yehova asalaki Adama. Akamataki putulu ya mabele mpe asali nzoto ya kokoka, nzoto yango nde mobali. Na nsima Nzambe atyaki mpema na zolo ya mobali, mpe Adama akómaki na bomoi.

Yehova Nzambe apesaki Adama mosala. Alobaki na ye apesa banyama nyonso nkombo. Ntango mosusu, Adama atalaki banyama ntango molai liboso ya kozwa nkombo oyo ebongi na nyama mokomoko. Kasi, ntango azalaki kopesa banyama nkombo, amonaki likambo moko. Boyebi likambo yango?

Amonaki ete banyama nyonso bazali na basi. Amonaki banzoku ya mibali ná ya basi, bankɔsi ya mibali ná ya basi. Kasi Adama azalaki kaka ye moko. Yango wana, Yehova alalisaki ye mpɔngi ya makasi mpenza mpe akamati mokuwa moko na mopanzi na ye. Na mokuwa yango asaleli ye mwasi.

Kanisá naino esengo Adama ayokaki. Eva mpe asepelaki kofanda na kati ya elanga ya kitoko wana! Sikoyo bakokaki kobota bana mpe kofanda na esengo elongo.

Yehova alingaki ete Adama ná Eva bázala na bomoi libela na libela. Alingaki mpe ete bákómisa mabele mobimba kitoko lokola elanga ya Edene. Kanisá naino esengo oyo Adama ná Eva bazalaki na yango ntango bazalaki kokanisa mosala oyo bakosala! Na ntembe te, olingaki kosepela kosangana na mosala yango ya kokómisa mabele elanga ya kitoko mingi. Nzokande, bolamu na bango eumelaki te. Tiká tótala ntina nini eumelaki te.

Nzembo 83:18; Ebandeli 1:26-31; 2:7-25.



Mituna

  • Elilingi ya Lisolo 3 ná elilingi ya Lisolo 2 ekesani na nini?
  • Nani asalaki mobali ya liboso, mpe nkombo na ye nani?
  • Nzambe apesaki Adama mosala nini?
  • Mpo na nini Nzambe alalisaki Adama mpɔngi makasi?
  • Adama ná Eva basengelaki kozala na bomoi ntango boni, mpe mosala nini Yehova alingaki básala?

Mituna mosusu