Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 10: Mpela na mokili mobimba

Lisolo 10: Mpela na mokili mobimba

BATO oyo bakɔtaki na masuwa te bakobaki kosala makambo oyo bamesanaki kosala. Bandimaki te ete Mpela ekoya. Ntango mosusu, bakómaki kosɛka Noa ná libota na ye lisusu makasi koleka. Kasi mosika te, kosɛka nyonso esilaki.

Mai ezingi bato ná banyama, bazali kobanga

Na mbala moko, mbula ebandi kobɛta. Ezalaki mbula ya makasi mpenza. Noa amikosaki te. Kasi ntango ezalaki lisusu te mpo moto mosusu akoka kokɔta na masuwa. Yehova akangi porte ya masuwa makasi mpenza.

Mosika te, mai ebandi kotonda na mokili. Ekómaki lokola ebale ya monene. Banzete ebandi kokwea mpe mabanga ya minene ezali kolongwa na bisika na yango; ezali kosala makɛlɛlɛ makasi mpenza. Bato babangaki mingi. Bamataki na bangomba. Na ntembe te, bamiyokelaki mawa lokola bandimelaki Noa te, mpe baboyaki kokɔta na masuwa ntango porte ezalaki naino polele. Kasi sikoyo esili.

Mai ekómi mingi mpenza. Mbula ebɛtaki mikolo ntuku minei (40), butu moi. Mai ebakisamaki mpe mosika te ngomba ya milai nyonso ezindi. Maloba ya Nzambe ekokisami: bato nyonso ná banyama oyo bakɔtaki na masuwa te bakufi. Bobele bato ná banyama oyo bazalaki na kati ya masuwa nde babikaki.

Noa ná bana na ye basalaki masuwa malamu. Ntango mai ebandaki kotombola yango, ebandaki kotepatepa likoló ya mai. Na nsima, mbula etikaki kobɛta mpe moi ebandaki kongɛnga. Mokili ekómaki nsɔmɔ! Mokili mobimba ekómaki mai na mai. Eloko moko mpamba ezalaki komonana: masuwa likoló ya mai.

Masuwa ezali kotepatepa

Bilombe bazali lisusu te. Moto moko te akonyokwama lisusu mpo na bango. Bango nyonso bakufi, ná bamama na bango ná bato mabe mosusu nyonso. Bongo batata na bango bakendeki wapi?

Batata na bango bazalaki bato mpenza lokola biso te. Bazalaki nde baanzelu oyo bayaki kofanda awa na mokili lokola bato. Yango wana, ntango Mpela eyei, bakufaki te. Batikaki nzoto ya bato oyo balataki, mpe bazongaki na likoló. Kasi Nzambe apesaki bango lisusu nzela te ya kosangana na baanzelu. Bakómaki baanzelu ya Satana. Biblia ebengi bango bademo to bilimo mabe.

Nzambe atindaki mopɛpɛ na mokili mpe mai ebandaki kokauka na mokili mobimba. Sanza mitano na nsima, masuwa etɛlɛmi na likoló ya ngomba moko. Mikolo mingi elekaki lisusu. Na nsima, nsɔngɛ ya bangomba ebandi komonana. Mai ezali kaka kokauka.

Bongo Noa atindi ndɛkɛ moko, nkombo na yango yanganga. Ndɛkɛ yango ekei, kasi nsima ya mwa ntango ezongi likoló ya masuwa, mpo ezwaki esika ya kokita te. Ezalaki kaka kokende mpe kozonga likoló ya masuwa.

Ebenga

Noa azalaki na mposa ya koyeba soki mai ekauki na mabele; na mbala oyo atindi ebenga. Kasi, ebenga ezongaki mpe, mpo ezwaki esika ya kokita te. Bongo Noa atindaki yango lisusu; na mbala oyo ezongaki na lokasa ya nzete ya olive na monɔkɔ. Na yango, Noa ayebaki ete mai ekauki. Noa atindaki ebenga mbala ya misato, mpe na mbala wana ezongaki te; ezwaki esika ya kokita.

Bongo Nzambe alobaki na Noa ete: ‘Bimá na masuwa, ná libota na yo ná banyama.’ Baumelaki na masuwa mbula moko na mwa ndambo. Kanisá naino esengo bayokaki ntango babimi libándá mpe mpo babiki.

Ebandeli 7:10-24; 8:1-17; 1 Petro 3:19, 20.



Mituna

  • Mpo na nini moto ata moko te akokaki lisusu kokɔta na masuwa ntango mbula ebandaki kobɛta?
  • Yehova anɔkisaki mbula mikolo boni, mpe mai yango ekómaki mozindo?
  • Ntango mai ebandaki kotonda na mabele masuwa esalaki nini?
  • Bilombe babikaki ntango Mpela eyaki, bongo batata ya bilombe yango bakendaki wapi?
  • Masuwa esalaki nini nsima ya sanza mitano?
  • Mpo na nini Noa atindaki ndɛkɛ babengi yanganga?
  • Ndenge nini Noa ayebaki ete mai oyo ezalaki na mabele ekauki?
  • Nsima ya koumela na masuwa mbula moko na mwa ndambo, Yehova alobaki na Noa ná libota na ye nini?

Mituna mosusu

  • Tángá Ebandeli 7:10-24.

    Biloko nini ya bomoi ebomamaki awa na mabele? (Eba. 7:23)

    Mpela eumelaki mikolo boni liboso mai ekauka? (Eba. 7:24)

  • Tángá Ebandeli 8:1-17.

    Ndenge nini Ebandeli 8:17 emonisi ete mokano oyo Yehova azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele ebongwani te? (Eba. 1:22)

  • Tángá 1 Petro 3:19, 20.

    Ntango baanzelu batomboki bazongaki na likoló, etumbu nini bazwaki? (Yuda 6)

    Ndenge nini lisolo ya Noa ná libota na ye ezali kosalisa biso tótya lisusu elikya makasi na makoki oyo Yehova azali na yango ya kosikola basaleli na ye? (2 Pe. 2:9)