Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 7: Mobali ya mpiko

Lisolo 7: Mobali ya mpiko
Enoka

LOKOLA bato bazalaki kokóma ebele na mokili, mingi na bango bazalaki kosala mabe, lokola Kaina. Nzokande, moto moko akesanaki na bato mosusu. Nkombo na ye Enoka. Enoka azalaki mobali ya mpiko. Atako bato oyo bazalaki esika Enoka azali bazalaki kosala mabe, ye akobaki kosalela Nzambe.

Boyebi mpo na nini bato ya ntango wana bazalaki kosala mabe mingi? Nani atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe mpe bálya mbuma oyo Nzambe alobaki ete bálya te? Ezali anzelu moko ya mabe. Biblia ebengi ye Satana. Ye nde moto azali koluka kobebisa bato nyonso.

Moyibi ayibi mpe abomi moto

Mokolo moko, Yehova Nzambe atindaki Enoka ayebisa bato likambo moko, mpe bato basepelaki na likambo yango te. Alobaki na bango boye: ‘Mokolo mosusu Nzambe akoboma bato mabe nyonso.’ Ntango bato yango bayoki maloba wana, basiliki mpenza! Ekoki mpe kozala ete balukaki koboma ye. Yango wana, Enoka asengelaki kozala na mpiko mpo ayebisa bato makambo oyo Nzambe asengelaki kosala.

Nzambe atikaki Enoka na bomoi na kati ya bato mabe wana ntango molai te. Enoka aumelaki mbula nkama misato na ntuku motoba na mitano (365) mpamba. Mpo na nini tolobi ete “mbula nkama misato na ntuku motoba na mitano mpamba”? Ezali mpo na ntango wana, bato bazalaki makasi mingi mpe bazalaki koumela mingi. Na ndakisa, Metusela, mwana ya Enoka, aumelaki mbula nkama libwa na ntuku motoba na libwa (969)!

Bato bazali kosala makambo mabe

Nsima ya liwa ya Enoka, bato bakómaki mabe koleka. Biblia elobi ete ‘makanisi na bango ezalaki ntango nyonso mabe’ mpe ‘mabele etondaki na mobulu.’

Boyebi mpo na nini mabe ezalaki mingi na mokili na ntango yango? Ezali mpo Satana azwaki mayele ya sika ya kobebisa bato. Na lisolo oyo elandi tokolobela likambo yango.

Ebandeli 5:21-24, 27; 6:5; Baebre 11:5; Yuda 14, 15.



Mituna

  • Enoka akesanaki na bato mosusu na nini?
  • Mpo na nini na mikolo ya Enoka bato bazalaki kosala makambo ya mabe ebele?
  • Wapi makambo ya mabe oyo bato yango bazalaki kosala? (Talá elilingi.)
  • Mpo na nini esengelaki Enoka azala na mpiko?
  • Na mikolo wana bato bazalaki koumela ntango boni na bomoi, kasi Enoka aumelaki ntango boni?
  • Nini esalemaki nsima ya liwa ya Enoka?

Mituna mosusu

  • Tángá Ebandeli 5:21-24, 27.

    Enoka azalaki na boyokani nini na Yehova? (Eba. 5:24)

    Na Biblia, nani aumelaki mingi koleka bato nyonso, mpe akufaki na mbula boni? (Eba. 5:27)

  • Tángá Ebandeli 6:5.

    Na ndenge nini makambo ebebaki mpenza kobeba nsima ya liwa ya Enoka, mpe na ndenge nini makambo yango ekokani na oyo ya mikolo na biso? (2 Tim. 3:13)

  • Tángá Baebre 11:5.

    Wapi ezaleli ya Enoka oyo “esepelisaki Nzambe mingi,” mpe ememelaki ye litomba nini? (Eba. 5:22)

  • Tángá Yuda 14, 15.

    Ndenge nini bakristo lelo oyo bakoki komekola ezaleli ya mpiko ya Enoka ntango bazali kokebisa bato mpo na etumba ya Armagedone oyo ezali koya? (2 Tim. 4:2; Ebr. 13:6)