Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 22: Yozefe na kati ya bolɔkɔ

Lisolo 22: Yozefe na kati ya bolɔkɔ

YOZEFE azalaki na mbula zomi na nsambo mpamba ntango batɛkaki ye na Ezipito. Kuna, batɛkaki ye epai ya Potifare. Potifare azali mosali ya Farao, mokonzi ya Ezipito.

Yozefe azali na bolɔkɔ

Yozefe asalaki mosala na ye epai ya Potifare malamu. Ntango akómaki mokóló, Potifare atyaki ye mokonzi ya ndako na ye mobimba. Bongo mpo na nini sikoyo azali na bolɔkɔ? Ezali mpo na mwasi ya Potifare.

Yozefe azalaki mobali kitoko, mpe mwasi ya Potifare alingaki ete Yozefe alala na ye. Kasi Yozefe ayebaki ete ezali mabe mpenza mpe aboyaki. Mwasi ya Potifare ayokaki nkanda makasi. Ntango mobali na ye azongi na ndako, akosi ye na maloba oyo: ‘Yozefe, mwana mabe; alingaki kolala na ngai!’ Potifare andimelaki mwasi na ye. Asilikelaki Yozefe makasi mpe atyaki ye na bolɔkɔ.

Mokonzi ya bolɔkɔ aumelaki te na komona ete Yozefe azali moto malamu. Yango wana atyaki ye mokɛngɛli ya bato nyonso ya bolɔkɔ. Mokolo moko, Farao asilikeli kapita ya bapesi-masanga mpe ya basali-mampa na ye mpe atye bango na bolɔkɔ. Na butu moko boye, bango nyonso mibale balɔti moto na moto ndɔtɔ na ye, kasi bayebaki ndimbola ya bandɔtɔ yango te. Na ntɔngɔ, Yozefe alobi na bango ete: ‘Bóyebisa ngai bandɔtɔ na bino!’ Ntango bayebisi Yozefe bandɔtɔ yango, Nzambe asalisi ye alimbola yango.

Yozefe ayebisi kapita ya bapesi-masanga ete: ‘Nsima ya mikolo misato bakobimisa yo na bolɔkɔ mpe okozongela mosala na yo.’ Yozefe ayebisi ye lisusu ete: ‘Ntango okobima, yebisá Farao makambo na ngai mpe bimisá ngai na esika oyo.’ Bongo Yozefe alobaki na kapita ya basali-mampa ete: ‘Nsima ya mikolo misato Farao akokata yo motó.’

Mpe nsima ya mikolo misato, esalemaki kaka ndenge Yozefe alobaki. Farao akataki motó ya kapita ya basali-mampa kasi abimisaki kapita ya bapesi-masanga na bolɔkɔ mpe azongelaki mosala na ye. Nzokande, kapita ya bapesi-masanga abosanaki Yozefe. Ayebisaki Farao eloko moko te oyo etali Yozefe.

Ebandeli 39:1-23; 40:1-23.



Mituna

  • Yozefe azali na mbula boni ntango bakei na ye na Ezipito, mpe likambo nini esalemi ntango akómi kuna?
  • Mpo na nini bakɔtisi Yozefe na bolɔkɔ?
  • Bapesi Yozefe mokumba nini na bolɔkɔ?
  • Na bolɔkɔ, Yozefe asaleli kapita ya bapesi-masanga mpe kapita ya basali-mampa ya Farao nini?
  • Nini elekaki nsima ya kobima ya kapita ya bapesi-masanga na bolɔkɔ?

Mituna mosusu