Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 11: Ebandeli ya monama

Lisolo 11: Ebandeli ya monama

BOYEBI eloko Noa asalaki nsima ya kobima na masuwa? Apesaki Nzambe libonza. Elilingi oyo ezali na nse awa emonisi Noa azali kopesa libonza. Apesaki Nzambe banyama mingi mpo na kotɔnda ye na ndenge abikisaki libota na ye na mpela monene.

Masuwa mpe monama

Yehova andimaki libonza yango? Ɛɛ. Mpe Nzambe alakaki Noa ete akoboma lisusu mokili na mpela te.

Mabele ekaukaki noki, mpe Noa ná libota na ye babandaki bomoi ya sika nsima ya kobima na masuwa. Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango ete: ‘Bóbota bana mingi! Bókóma ebele tii bato bakotonda na mokili!’

Kasi na nsima, ntango bato bakoyoka nsango ya mpela ya monene, bakoki kobanga ete ekozonga lisusu. Yango wana, Nzambe apesaki elembo oyo ekokundwela bango elaka na ye ete akozindisa lisusu mokili mobimba na mpela te. Oyebi elembo oyo apesaki bango? Elembo yango ezali monama.

Noa ná libota na ye

Monama emonanaka mingi soki mbula ebɛti mpe moi ebandi lisusu kongɛnga. Monama ezalaka na balangi ya kitoko. Osilá komona yango? Talá oyo ezali na elilingi oyo.

Nzambe alakaki ete: ‘Bato ná banyama bakobomama lisusu na mpela te. Natye monama na ngai na mapata. Ntango monama ekobima, nakomona yango mpe nakokanisa lisusu elaka na ngai.’

Yango wana, ntango omoni monama, yango esengeli kokundwela yo nini? Elaka oyo Nzambe apesaki ete akoboma lisusu mokili na mpela monene te.

Ebandeli 8:18-22; 9:9-17.



Mituna

  • Ndenge balakisi na elilingi, likambo nini Noa asalaki liboso ntango abimi na masuwa?
  • Etinda nini Nzambe apesaki Noa ná libota na ye nsima ya Mpela?
  • Elaka nini Nzambe apesaki?
  • Ntango tomonaka monama, yango esengeli kokundwela biso nini?

Mituna mosusu