Lisolo 13: Abrahama, moninga ya Nzambe
MOKO ya bisika oyo bato bakendeki kofanda nsima ya Mpela babengaki yango Ure. Esika yango ekómaki mboka monene, na bandako ya kitoko. Kasi bato ya mboka yango bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, kaka ndenge ezalaki kosalema na Babele. Bato ya Ure bazalaki te lokola Noa ná mwana na ye Seme, oyo bazalaki kosambela Yehova.
Nsukansuka Noa, moto ya sembo, akufaki mbula soki nkama misato na ntuku mitano (350) nsima ya mpela. Ezalaki mbula mibale liboso ya kobotama ya moto oyo bozali komona na elilingi oyo. Nzambe asepelaki na moto yango mingi. Nkombo na ye Abrahama. Ye ná libota na ye bazalaki kofanda na engumba Ure.
Mokolo moko Yehova alobi na Abrahama ete: ‘Longwá na Ure elongo na bandeko na yo mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.’ Abrahama asalaki nini? Atosaki? Ɛɛ, akendeki mpe atikaki biloko kitoko ya mboka wana. Abrahama azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe; yango wana akómaki moninga ya Nzambe.
Bato mosusu ya libota na ye balongwaki na Ure mpe bakendeki elongo na ye. Tata na ye Tera; Lota, mwana ya ndeko na ye, ata mpe Sara mwasi na ye, bakendeki na ye. Nsima ya mobembo molai, bakómi na esika babengi Harane. Tera akufaki wana. Ure etikalaki mosika.
Nsima ya mikolo, Abrahama ná libota na ye balongwe na Harane, bakómi na mokili ya Kanana. Kuna Yehova alobi na ye ete: ‘Talá mokili nakopesa bana na yo.’ Abrahama afandaki na Kanana; na mokili yango azalaki kofanda na bahema.
Nzambe apambolaki Abrahama mpe akómaki na bampate, bangɔmbɛ, ná bibwɛlɛ mosusu ebele; azalaki mpe na basali mingi. Kasi ye na mwasi na ye Sara bazalaki kobota te.
Ntango Abrahama akómi na mbula ntuku libwa na libwa (99), Yehova apesaki ye elaka oyo: ‘Okokóma tata ya mabota mingi.’ Lokola Abrahama ná mwasi na ye bakómaki mibange mpe bazalaki na likoki ya kobota lisusu te, ndenge nini elaka yango ekokokisama?
Ebandeli 11:27-32; 12:1-7; 17:1-8, 15-17; 18:9-19.
Mituna
- Bato oyo bazalaki kofanda na Ure bazalaki ndenge nini?
- Moto oyo ozali komona na elilingi oyo ezali nani, abotamaki ntango nini, mpe azalaki kofanda wapi?
- Yehova ayebisaki Abrahama nini?
- Mpo na nini Abrahama abengamaki moninga ya Nzambe?
- Banani balongwaki na Ure elongo na Abrahama?
- Ntango Abrahama akómaki na mokili ya Kanana, Yehova ayebisaki ye nini?
- Ntango Abrahama akómaki na mbula 99, Yehova apesaki ye elaka nini?
Mituna mosusu
- Tángá Ebandeli 11:27-32.
Abrahama ná Lota bazalaki ndenge nini? (Eba. 11:27)
Atako nkombo ya Tera nde etángami lokola moto oyo amemaki libota na ye na Kanana, ndenge nini toyebi ete likanisi ya kosala mobembo yango eutaki nde na Abrahama, mpe mpo na nini asalaki bongo? (Eba. 11:31; Mis. 7:2-4)
- Tángá Ebandeli 12:1-7.
Wapi kondimana mosusu oyo Yehova asalaki na Abrahama ntango akómaki na mokili ya Kanana? (Eba. 12:7)
- Tángá Ebandeli 17:1-8, 15-17.
Ntango Abrama akómaki na mbula 99 bakómaki kobenga ye nani, mpe mpo na nini? (Eba. 17:5)
Yehova alakaki Sara mapamboli nini? (Eba. 17:15, 16)
- Tángá Ebandeli 18:9-19.
Na Ebandeli 18:19, mikumba nini bapesi batata? (Mib. 6:6, 7; Ef. 6:4)
Likambo nini Sara akutanaki na yango oyo emonisi ete tokoki kobombela Yehova ata likambo moko te? (Eba. 18:12, 15; Nz. 44:21)