Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 18: Yakobo akei na Harane

Lisolo 18: Yakobo akei na Harane

OYEBI bato oyo Yakobo azali kosolola na bango? Ezali babateli ya mpate. Nsima ya mobembo ya mikolo mingi, Yakobo akutani na bango pene na libulu ya mai, ná bampate na bango. Yakobo atuni bango ete: ‘Bino bouti wapi?’

Bazongisi ete: ‘Na Harane.’

Yakobo abakisi: ‘Boyebi Labana?’

Bandimi: ‘Ɛɛ! Kutu talá Rashele, mwana na ye, ye wana azali koya na bampate ya tata na ye.’ Omoni Rashele na elilingi oyo?

Yakoba akutani na Rashele

Ntango Yakobo amoni Rashele azali koya na bampate ya nɔkɔ na ye Labana, akei kolongola libanga na monɔkɔ ya libulu mpo bampate bámɛla mai. Na nsima, Yakobo ayambi Rashele mpe amiyebisi epai na ye. Rashele asepeli mpe akei mbangu koyebisa tata na ye Labana.

Labana ayambi Yakobo na ndako na ye na esengo. Ntango Yakobo asɛngi ete abala Rashele, Labana asepeli. Kasi asɛngi Yakobo asalela ye naino mosala mbula nsambo mpo abala Rashele. Yakobo andimi, mpo alingaki Rashele mingi. Kasi boyebi eloko nini esalemaki na mokolo ya libala?

Labana apesaki Yakobo nde Lea, mwana na ye ya liboso, na esika ya Rashele. Lokola Yakobo andimaki kosalela lisusu Labana mbula nsambo, apesaki ye mpe Rashele. Na ntango wana, Nzambe atikaki mibali bábalaka basi mingi. Kasi lelo oyo, Biblia elobi polele ete mobali asengeli kozala kaka na mwasi moko.

Ebandeli 29:1-30.



Mituna

  • Elenge mwasi oyo ozali komona na elilingi oyo nkombo na ye nani, mpe Yakobo asalaki nini mpo na ye?
  • Yakobo andimaki kosala nini mpo abala Rashele?
  • Labana asalaki nini na mokolo ya libala ya Yakobo ná Rashele?
  • Yakobo andimaki kosala lisusu nini mpo abala kaka Rashele?

Mituna mosusu