Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 19: Bana ya Yakobo

Lisolo 19: Bana ya Yakobo
Yakobo ná bana na ye ya mibali

BÓTALA libota oyo, ezali na bana mingi mpenza. Bana mibali zomi na mibale, bana ya Yakobo. Abotaki mpe bana basi. Oyebi nkombo ya bana ya Yakobo? Tiká tóyekola bankombo na bango.

Lea abotaki Rubene, Simeone, Levi ná Yuda. Lokola Rashele amonaki ete azali kobota te, akómaki mawamawa. Yango wana, apesaki Yakobo mosaleli na ye Bila, mpe abotelaki Yakobo bana mibali mibale: Dani ná Nafatali. Ntango Lea amoni ete atiki kobota, apesi Yakobo mosaleli na ye Zilipa, mpe abotelaki ye Gade ná Ashere. Lea abotaki lisusu bana mibale: Isakare ná Zebulone.

Nsukansuka, Rashele aboti mwana mobali. Apesi ye nkombo Yozefe. Tokolobela Yozefe mwa mingi na nsima, mpo akómaki moto monene mpenza. Oyo wana nde bana mibali zomi na moko oyo Yakobo abotaki ntango afandaki epai ya Labana, tata ya Rashele.

Yakobo azalaki mpe na bana basi. Biblia epesi biso kaka nkombo ya mwana moko mpamba: Dina.

Mokolo moko, Yakobo azwi ekateli ya kotika Labana mpe kozonga na mokili ya Kanana. Asangisi libota na ye, ná ebele ya bampate ná bangɔmbɛ na ye, mpe abandi kozonga.

Elekaki mwa mikolo banda Yakobo ná libota na ye bazali kozonga na Kanana, Rashele aboti mwana ya mibale. Mpe na ntango yango bazalaki naino na mobembo. Rashele aboti mwana mobali mpe ye moko akufi. Kasi mwana azali malamu. Yakobo apesi mwana yango nkombo Benyamina.

Tóbosana te nkombo ya bana mibali zomi na mibale ya Yakobo mpo ekólo ya Yisraele euti nde na bango. Na mabota zomi na mibale ya Yisraele, mabota zomi ezali na nkombo ya bana ya Yakobo mpe mabota mibale na nkombo ya bana ya Yozefe. Yisaka aumelaki mbula mingi nsima ya kobotama ya bana oyo nyonso, azalaki kosepela mingi mpo azalaki na bankɔkɔ ebele! Tótala naino likambo oyo ekómelaki Dina.

Ebandeli 29:32-35; 30:1-26; 35:16-19; 37:35.



Mituna

  • Tángá nkombo ya bana motoba ya mibali oyo Yakobo abotaki na mwasi na ye ya liboso Lea.
  • Tángá nkombo ya bana mibale ya mibali oyo Zilipa, mosaleli ya Lea abotelaki Yakobo.
  • Tángá nkombo ya bana mibale ya mibali oyo Bila, mosaleli ya Rashele abotelaki Yakobo.
  • Tángá nkombo ya bana mibale ya mibali oyo Rashele abotaki, kasi likambo nini esalemaki ntango mwana ya mibale abotami?
  • Na elilingi oyo, Yakobo azalaki na bana ya mibali boni, mpe nini eutaki na bana yango?

Mituna mosusu

  • Tángá Ebandeli 29:32-35; 30:1-26; mpe 35:16-19.

    Ndenge emonisami na bana mibali 12 ya Yakobo, na ntango ya kala, mbala mingi Baebre bazalaki kopesa bana mibali nkombo ndenge nini?

  • Tángá Ebandeli 37:35.

    Atako Biblia epesi kaka nkombo ya Dina, ndenge nini toyebi ete Yakobo azalaki na bana basi mingi? (Eba. 37:34, 35)