Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 24: Yozefe ameki bandeko na ye

Lisolo 24: Yozefe ameki bandeko na ye

YOZEFE alukaki koyeba soki bayaya na ye babongwaná to te. Yango wana alobaki ete: ‘Bino bozali banɔngi. Boyei kotala bisika ya mboka na biso oyo ebatelami malamu te.’

Kasi bango bazongisaki ete: ‘Tozali banɔngi te. Tozali bato malamu. Biso nyonso tozali bandeko. Tozalaki zomi na mibale. Moko azali lisusu te mpe oyo ya nsuka azali esika tata na biso azali.’

Yozefe asali lokola nde andimeli bango te. Akangi Simeone, atye ye na bolɔkɔ, mpe atiki bandeko na ye mosusu bázonga na bilei. Bongo alobi na bango ete: ‘Ntango bokoya lisusu, bóya na leki na bino ya nsuka.’

Ntango bakómi na Kanana, bayebisi tata na bango Yakobo makambo nyonso wana. Yakobo ayoki mabe mpenza. Bongo agangi ete: ‘Yozefe azali lisusu te, Simeone mpe azali lisusu te. Benyamina, mwana na ngai ya nsuka, akokende na bino te.’ Kasi ntango bilei ebandaki kosila, Yakobo andimi bákende na Benyamina, mpo bázwa bilei.

Mokolo moko, Yozefe amoni bandeko na ye bazali koya. Ntango amoni leki na ye Benyamina, asepelaki mpenza. Moto moko te na kati na bango ayebaki ete mokonzi wana nde Yozefe. Bongo amekaki bandeko na ye zomi.

Yozefe atindi basaleli na ye bátondisa biloko na basaki na bango. Lisusu, kozanga ete báyeba, atindi basaleli na ye bátya kɔpɔ na ye ya palata na saki ya Benyamina. Bongo bandeko na ye bakei. Bakómaki naino mosika te, Yozefe atindi basaleli na ye bálanda bango. Ntango bazwi bango, balobi ete: ‘Mpo na nini boyibi kɔpɔ ya palata ya nkolo na biso?’

Bango nyonso bazongisi ete: ‘Biso toyibi kɔpɔ na ye te! Soki bomoni kɔpɔ yango epai ya moko na biso, tiká moto yango akufa!’

Bongo basaleli ya Yozefe balukiluki na basaki nyonso mpe bazwi kɔpɔ yango na saki ya Benyamina, ndenge bozali komona awa. Mpe balobi na bayaya ya Benyamina ete: ‘Bino bókende epai na bino, kasi biso tozongi na Benyamina!’ Bayaya na ye zomi wana bakosala nini?

Bango nyonso bazongi na Benyamina na ndako ya Yozefe. Kuna Yozefe alobi na bango ete: ‘Bino bokoki kokende epai na bino, kasi Benyamina akotikala awa, akozala moombo na ngai.’

Sikoyo Yuda alobi boye: ‘Soki nazongi, bongo mwana oyo azali te, tata na ngai akokufa, mpo alingaka ye mingi mpenza. Yango wana, nabondeli yo, tiká ye akende mpe ngai natikala moombo na esika na ye.’

Bongo Yozefe ayei komona ete bandeko na ye babongwaná. Bakómá bato malamu. Tótala sikoyo eloko Yozefe akosala.

Ebandeli 42:9-38; 43:1-34; 44:1-34.

Bafundi bandeko ya Yozefe


Mituna

  • Mpo na nini Yozefe alobaki na bandeko na ye ete bayei konɔnga mokili?
  • Mpo na nini Yakobo apesaki nzela ete mwana na ye ya nsuka, Benyamina, akende na Ezipito?
  • Ndenge nini kɔpɔ ya Yozefe ya palata ekɔtaki na saki ya Benyamina?
  • Yuda andimaki kosala nini mpo bátika Benyamina?
  • Nini emonisi ete bandeko ya Yozefe babongwanaki?

Mituna mosusu