Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 29: Moize akimi

Lisolo 29: Moize akimi

ELILINGI oyo elakisi Moize azali kokima Ezipito. Bomoni bato oyo bazali kolanda ye? Boyebi mpo na nini balingi koboma ye? Tóluka eyano.

Moize azali kokima Ezipito

Moize abɔkwamaki na ndako ya Farao, mokonzi ya Ezipito. Akómaki na bwanya mpe na lokumu mingi. Moize ayebaki ete azali Moezipito te mpe ete baboti na ye bazali Bayisraele, baombo.

Mokolo moko, ntango Moize akómi na mbula ntuku minei (40), alingaki koyeba ndenge bandeko na ye bazali. Bazalaki mpenza konyokwama. Amonaki Moezipito moko azali kobɛta Moyisraele moko, moombo. Moize atali epai na epai, mpe amoni ete moto moko te azali komona ye; abɛti Moezipito yango, akufi. Bongo Moize akundi ye na zɛlo.

Na mokolo oyo elandi, Moize azongi lisusu kotala bandeko na ye. Akanisaki ete akoki kosalisa bango mpo bálongwa na boombo. Mpe amoni Bayisraele mibale bazali kobunda. Bongo Moize alobi na oyo asalaki mabe ete: ‘Mpo na nini ozali kobɛta ndeko na yo?’

Bongo moto yango ayanoli ete: ‘Nani atye yo mokonzi mpe mosambisi na biso? Olingi oboma ngai ndenge obomaki Moezipito?’

Moize abangi. Amoni ete likambo oyo asalaki Moezipito wana eyebani. Farao mpe ayoki yango, mpe atindi bato báboma ye. Yango wana, Moize akimaki Ezipito.

Ntango Moize akimaki Ezipito, akendeki mosika, na mokili ya Midiane. Kuna akutanaki na libota ya Yetro, abalaki mwana na ye, nkombo na ye Zipora. Moize akómaki kobatela bampate ya bokilo na ye Yetro. Aumelaki na mokili ya Midiane mbula ntuku minei (40). Sika akómi na mbula ntuku mwambe (80). Bongo mokolo moko, ntango Moize azalaki kobatela bampate, amoni likambo moko ya kokamwa oyo ebongolaki bomoi na ye mobimba. Tokomona likambo yango na lokasa oyo elandi.

Kobima 2:11-25; Misala 7:22-29.



Mituna

  • Moize akolaki wapi, kasi ayebaki ete baboti na ye bazali banani?
  • Moize asalaki nini ntango akómi na mbula 40?
  • Moize alobaki nini na Moyisraele oyo azalaki kobunda, mpe moto yango apesaki eyano nini?
  • Mpo na nini Moize akimaki Ezipito?
  • Moize akendaki wapi ntango akimaki, mpe kuna akutanaki na nani?
  • Mosala nini Moize asalaki na boumeli ya mbula 40 oyo akimaki Ezipito?

Mituna mosusu