Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 30: Moize na Ngomba Horebe

Lisolo 30: Moize na Ngomba Horebe

MOKOLO moko, Moize akei na bampate na ye na Ngomba Horebe. Kuna amoni nzete moko ezali kopela na mɔtɔ kasi ezali kozika te.

Moize na esika nzete ezali kopela na mɔtɔ

Moize alobi boye: ‘Oyo nde likambo ya kokamwa! Tiká napusana naino pene namona malamu.’ Kasi ntango akómi pene, mongongo moko euti na katikati ya nzete yango mpe elobi na ye ete: ‘Kopusana awa te. Longolá basandale na yo, mpo esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.’ Nzambe asololaki na ye na nzela ya anzelu moko. Bongo Moize abombi elongi na ye.

Na nsima Nzambe alobi na ye ete: ‘Namoni mpasi ya bato na ngai na Ezipito. Nalingi kobikisa bango mpe nakotinda yo mpo olongola bango na Ezipito.’ Na yango, Yehova azali kozwa bibongiseli ya kozongisa Bayisraele na Kanana, mokili ya kitoko.

Bongo Moize alobi ete: ‘Ngai nani? Mpe nakosala yango ndenge nini? Kanisá naino ete nakei na Ezipito. Bayisraele bakotuna ngai ete: “Nani atindi yo?” Bongo nakoloba na bango nini?’

Nzambe azongisi ete: ‘Okoloba na bango boye: “YEHOVA, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo, atindi ngai epai na bino.” ’ Mpe Yehova abakisi ete: ‘Wana nde nkombo na ngai mpo na seko.’

Kasi Moize alobaki lisusu ete: ‘Bongo soki bandimi te ete otindi ngai.’

Nzambe atuni ye: ‘Eloko nini osimbi na lobɔkɔ na yo?’

Moize alobi ete: ‘Lingenda.’

Nzambe alobi na ye ete: ‘Bwaká yango na mabele.’ Moize abwaki lingenda yango na mabele mpe ekómi nyoka. Mpe Yehova alakisi Moize likamwisi mosusu. Alobi na ye ete: ‘Tyá lobɔkɔ na yo na kati ya zambala na yo.’ Moize atye, mpe ntango abimisi yango, ekómi mpɛmbɛ makasi, lokola nde ezali na maladi ya maba. Na nsima, Yehova apesi Moize nguya ya kosala likamwisi ya misato. Mpo na kosukisa alobi na ye boye: ‘Ntango okosala makamwisi oyo, Bayisraele bakondima ete natindi yo.’

Bongo Moize azongi mpe ntango akómi epai ya Yetro, bokilo na ye, ayebisi ye ete: ‘Nabondeli yo, nalingi nazonga na Ezipito, epai ya bandeko na ngai, mpo nayeba ndenge nini bazali.’ Yetro atiki Moize akende, mpe Moize azongi na Ezipito.

Kobima 3:1-22; 4:1-20.



Mituna

  • Ngomba oyo ozali komona na elilingi, nkombo na yango nini?
  • Lobelá likambo moko ya monene oyo Moize amonaki ntango akendeki na bampate na ye na ngomba.
  • Mongongo oyo ebimaki na nzete moke oyo ezalaki kopela na mɔtɔ elobaki nini, mpe yango ezalaki mongongo ya nani?
  • Moize apesaki eyano nini ntango Nzambe alobaki na ye ete akobimisa bato na ye na Ezipito?
  • Nzambe ayebisaki Moize aloba nini soki batuni nani atindi ye?
  • Ndenge nini Moize akokaki kondimisa Bayisraele ete Nzambe moto atindi ye?

Mituna mosusu