Lisolo 31: Bakei epai ya Farao
NTANGO Moize azongi na Ezipito, akutanaki na yaya na ye Arona, ayebisi ye likambo ya makamwisi oyo asalaki. Ntango basali makamwisi yango liboso ya Bayisraele, bato nyonso bandimi ete Yehova azali na bango.
Na nsima, Moize ná Arona bakei epai ya Farao. Balobi na ye ete: ‘Yehova Nzambe ya Bayisraele alobi ete: “Tiká bato na ngai bákende mobembo ya mikolo misato, mpo básambela ngai na esobe.” ’ Bongo Farao azongisi ete: ‘Ngai nandimaka Yehova te. Mpe nakotika Yisraele bákende te.’
Farao asiliki mpo Bayisraele balingi bátika mosala mpo bákende kosambela Yehova. Abakiseli bango kutu mosala koleka. Bongo Bayisraele basilikeli Moize, mpo babakiselaki bango mosala ya makasi koleka, mpe Moize ayoki mawa. Kasi Yehova ayebisi ye amitungisa te. Alobi boye: ‘Nakotinda Farao atika bato na ngai bákende.’
Moize ná Arona bakei lisusu epai ya Farao. Mbala oyo basali likamwisi ya liboso. Arona abwaki lingenda na ye na nse ekómi nyoka ya monene. Bato ya bwanya ya Farao basalaki mpe bongo. Kasi nyoka ya Arona emɛlaki banyoka ya bato ya bwanya. Ata bongo Farao aboyaki kotika Bayisraele bákende.
Sikoyo ntango ekoki mpo Yehova apesa Farao liteya. Boyebi eloko asalaki? Apesaki Ezipito bitumbu to malɔzi zomi.
Nsima ya malɔzi mingi, Farao abengi Moize mpe alobi na ye ete: ‘Soki bolɔzi esili nakotika Yisraele bákende.’ Kasi ntango bolɔzi esili, Farao azwi makanisi mosusu. Mpe aboyi kotika Bayisraele. Kasi, nsukansuka, nsima ya bolɔzi ya zomi, Farao abenganaki Bayisraele.
Boyebi malɔzi zomi yango? Lokasa oyo elandi ekoyebisa biso yango.
Kobima 4:27-31; 5:1-23; 6:1-13, 26-30; 7:1-13.
Mituna
- Makamwisi oyo Moize ná Arona basalaki, etindi Bayisraele bándima likambo nini?
- Moize ná Arona bayebisi Farao nini, mpe Farao apesi bango eyano nini?
- Ndenge elilingi oyo emonisi yango, ntango Arona abwaki lingenda na ye na nse, likambo nini esalemi?
- Ndenge nini Yehova apesaki Farao etumbu, mpe likambo nini Farao azalaki kosala ntango bitumbu yango ezali koyela ye?
- Likambo nini esalemaki nsima ya bolɔzi ya zomi?
Mituna mosusu
- Tángá Kobima 4:27-31 mpe 5:1-23.
Farao alingaki mpenza koloba nini ntango alobaki ete: “Nayebi Yehova ata moke te”? (Kob. 5:2; 1 Sa. 2:12; Rom. 1:21)
- Tángá Kobima 6:1-13, 26-30.
Na ndenge nini Yehova amimonisaki te epai ya Abrahama, Yisaka, ná Yakobo? (Kob. 3:13, 14; 6:3; Eba. 12:8)
Tozali koyoka ndenge nini ntango toyebi ete Yehova azalaki kaka kosalela Moize, atako Moize ye moko azalaki komimona ete akokoka te mosala oyo bapesi ye? (Kob. 6:12, 30; Luka 21:13-15)
- Tángá Kobima 7:1-13.
Ndakisa nini Moize ná Arona batikelá basaleli ya Nzambe na mikolo na biso na ndenge basakolaki na mpiko nyonso bikateli ya Yehova liboso ya Farao? (Kob. 7:2, 3, 6; Mis. 4:29-31)
Ndenge nini Yehova amonisaki ete aleki banzambe ya Ezipito? (Kob. 7:12; 1 Nt. 29:12)