Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 3: Banda babimi na Ezipito tii baponi mokonzi ya liboso na Yisraele

Eteni 3: Banda babimi na Ezipito tii baponi mokonzi ya liboso na Yisraele

Moize atambwisaki Bayisraele tii na Ngomba Sinai epai Nzambe apesaki bango mibeko na ye. Na nsima, Moize atindaki bato zomi na mibale bákende kotala mokili ya Kanana. Ntango bazongi, bato zomi na kati na bango balobaki mabe mpo na mokili yango. Yango etindaki Bayisraele báluka kozonga na Ezipito. Yehova apesaki bango etumbu mpo bazangaki kondima, yango wana batambolaki mbula ntuku minei (40) mobimba na esobe.

Na nsima, Nzambe aponaki Yosua mpo na kokɔtisa Bayisraele na mokili ya Kanana. Mpo na kosalisa bango bázwa mokili yango, Yehova asalaki makamwisi: atɛlɛmisi mai ya Ebale Yordani, akweisi lopango ya Yeriko, mpe atɛlɛmisi moi mokolo mobimba. Mbula motoba na nsima, bazwaki mokili mobimba ya Kanana.

Banda na Yosua, basambisi bayangelaki Yisraele mbula nkama misato na ntuku mitano na motoba (356). Na masolo oyo ezali kolanda, tokolobela basambisi lokola Barake, Gideone, Yefeta, Samsone ná Samwele. Tokolobela mpe basi lokola Rahaba, Debora, Yaele, Ruta, Naomi ná Delila. Eteni ya MISATO elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkama misato na ntuku libwa na motoba (396).

Tabernakle