Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 36: Mwana-ngɔmbɛ ya wolo

Lisolo 36: Mwana-ngɔmbɛ ya wolo

LIKAMBO nini ezali koleka awa? Bato bazali kosala nini? Bazali kosambela mwana-ngɔmbɛ. Mpo na nini bazali kosambela mwana-ngɔmbɛ yango?

Lokola Moize aumeli na ngomba, bato balobi ete: ‘Toyebi te nini ekómeli ye. Tósala nzambe oyo akokamba biso!’

Moize apanzi bitanda mibale ya mabanga

Bongo Arona, ndeko ya Moize, alobi na bango ete: ‘Bólongola biloko na bino ya matoi ya wolo mpe bómemela ngai yango.’ Ntango bamemeli ye biloko yango, anyangwisi yango na mɔtɔ mpe asali na yango mwana-ngɔmbɛ. Mpe Bayisraele balobi: ‘Talá Nzambe na biso, oyo abimisi biso na Ezipito!’ Na nsima, basali fɛti monene mpe babandi kosambela mwana-ngɔmbɛ yango ya wolo.

Ntango Yehova amoni likambo yango, ayoki nkanda makasi. Alobi na Moize ete: ‘Kitá noki! Bato babebisi makambo. Babosani mibeko na ngai nyonso mpe bazali kogumbamela mwana-ngɔmbɛ ya wolo.’

Bato bazali kosambela mwana-ngɔmbɛ ya wolo

Moize akiti nokinoki. Mpe ntango akómi pene na kaa, amoni bato bazali koyemba mpe kobina zingazinga ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo. Nkanda na ye engali, abwaki na mabele bitanda mibale ya mabanga oyo bakomaki na yango mibeko, mpe epanzani. Bongo, akamati mwana-ngɔmbɛ yango ya wolo mpe anyangwisi yango na mɔtɔ. Na nsima, atutituti yango ekómi putulu.

Bato basalaki likambo ya mabe mpenza. Yango wana, Moize atindaki bato mosusu ete bákamata mipanga na bango, báboma bato mabe oyo basambelaki mwana-ngɔmbɛ yango ya wolo. Bato nkóto misato (3 000) babomamaki na mokolo yango. Lisolo oyo ezali kokebisa biso ete tósambelaka banzambe mosusu te, kaka Yehova.

Kobima 32:1-35.



Mituna

  • Na elilingi oyo, bato oyo bazali kosala nini, mpe mpo na nini?
  • Mpo na nini Yehova ayoki nkanda makasi, mpe Moize asali nini ntango amoni likambo oyo bato bazali kosala?
  • Moize ayebisi bato mosusu básala nini?
  • Lisolo oyo eteyi biso nini?

Mituna mosusu