Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 51: Ruta ná Naomi

Lisolo 51: Ruta ná Naomi

NA Biblia ezali na mokanda moko nkombo na yango Ruta. Ezali lisolo ya libota moko oyo bazalaki na bomoi na mikolo oyo Yisraele etambwisamaki na basambisi. Ruta, elenge mwasi moko ya mokili ya Moabe, azali moto ya Yisraele te. Nzokande, ntango Ruta ayebaki Yehova Nzambe ya solo, alingaki ye mingi mpenza. Naomi, mwasi moko mobange, asalisaki Ruta ayeba Nzambe ya solo.

Naomi azali Moyisraele. Lokola nzala ekɔti na Yisraele, Naomi ná mobali na ye, ná bana na bango mibale, bakei kofanda na mokili ya Moabe. Mobali na ye akufaki na mokili yango. Na nsima, bana yango babalaki basi mibale na mokili ya Moabe, Ruta ná Orpa. Nsima ya mbula soki zomi, bana na ye mibale mpe bakufi. Kanisá naino mawa oyo Naomi ná basi wana mibale bayokaki. Naomi akosala nini?

Mokolo moko boye, Naomi azwi ekateli ya kozonga na mokili ya Yisraele. Ruta ná Orpa, balingi kokabwana na ye te, balandi ye. Nsima ya kotambola mwa ndambo, Naomi alobi na bango ete: ‘Bózonga epai na bino, bókende epai ya bamama na bino.’

Na nsima, Naomi ayambi bango mpo bázonga. Bongo basi yango mibale baleli mpo balingi Naomi mingi. Yango wana balobi na ye ete: ‘Te, tokozonga elongo na yo epai ya bato na yo.’ Kasi Naomi azongiseli bango ete: ‘Bózonga, bana na ngai! Bokozala malamu epai na bino.’ Orpa azongi, kasi Ruta atikali.

Bongo Naomi alobi na Ruta ete: ‘Talá Orpa azongi. Yo mpe landá ye bózonga.’ Ruta azongiseli ye ete: ‘Kobondela ngai te ete nasundola yo. Tiká ngai nakende na yo. Epai okokende, ngai mpe nakokende, mpe epai okolala, ngai mpe nakolala. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. Epai okokufa, ngai mpe nakokufa, mpe kuna nde nakokundama.’ Ntango Ruta alobi boye, Naomi atiki kobengana ye.

Nsukansuka, basi yango mibale bakómi na mokili ya Yisraele mpe bafandi wana. Mosika te, Ruta abandi kokende na bilanga, mpo ezalaki ntango ya kobuka ɔrje. Mobali moko nkombo na ye Boaze atiki ye abuka ɔrje na bilanga na ye. Boyebi mama ya Boaze? Mama na ye Rahaba oyo azalaki na engumba Yeriko.

Mokolo moko, Boaze alobi na Ruta ete: ‘Bayebisi ngai makambo na yo nyonso, ná boboto oyo omoniselaki Naomi. Nayebi ete otiki tata na yo, mama na yo mpe mokili na yo mpo na koya kofanda epai ya bato oyo oyebaki liboso te. Tiká Yehova asalela yo makambo ya malamu!’

Ruta azongiseli ye ete: ‘Tata, omoniseli ngai boboto. Mpe maloba na yo ebɔndisi ngai mingi mpenza.’ Boaze alingi Ruta mingi mpe mosika te babalani. Naomi ayokaki esengo mingi mpenza. Ayokaki lisusu esengo koleka ntango Ruta ná Boaze baboti mwana na bango ya liboso ya mobali, bapesi ye nkombo Obede. Mwana yango akómaki nkɔkɔ ya Davidi, oyo tokolobela mingi na nsima.

Ruta ná Naomi

Mokanda ya Ruta



Mituna

  • Ndenge nini Naomi akómaki na mokili ya Moabe?
  • Ruta ná Orpa bazali banani?
  • Ruta ná Orpa basalaki nini ntango Naomi alobi na bango ete bázonga epai ya bato na bango?
  • Boaze azali nani, mpe ndenge nini asalisaki Ruta ná Naomi?
  • Mwana oyo Boaze ná Ruta babotaki, nkombo na ye nani, mpe mpo na nini tosengeli kokanisaka ye?

Mituna mosusu