Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 41: Nyoka ya motako

Lisolo 41: Nyoka ya motako
Moize mpe nyoka ya motako

NYOKA oyo ezingami na nzete ezali nyoka ya solo te. Ezali nyoka ya motako. Yehova ayebisaki Moize atya yango likoló ya nzete mpo bato bátalaka yango mpe bákufa te. Kasi banyoka oyo ezali na mabele ezali banyoka ya solo. Ezali koswa bato mpe kopesa bango maladi. Mpo na nini?

Ezali mpo bato balobelaki Nzambe ná Moize mabe. Balobaki boye: ‘Mpo na nini bobimisaki biso na Ezipito mpo tókufa na esobe? Awa biloko ya kolya ezali te, mai mpe ezali te. Mpe tolɛmbi kolya mana oyo.’

Nzokande mana ezalaki bilei ya malamu mpenza. Yehova apesaki bango bilei yango nde na likamwisi. Apesaki bango mai mpe kaka na likamwisi. Nzokande bato bazalaki kokanisa lisusu te bolamu oyo Nzambe asalelaki bango. Lokola bazangaki botɔndi, yango wana Yehova atindaki banyoka ya ngɛngɛ eswaswa bango mpe bato mingi bakufaki.

Banyoka ezali koswaswa Bayisraele

Bongo bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki na ye ete: ‘Tosali lisumu, mpamba te tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo. Bondelá Yehova alongola banyoka.’

Na yango, Moize abondelaki mpo na bato. Mpe Yehova alobaki na ye asala nyoka ya motako, atya yango likoló ya likonzí, mpe moto nyonso oyo nyoka eswi ye asengeli kotala yango. Moize asalaki mpe bongo. Bongo bato nyonso oyo nyoka eswaki bango batalaki nyoka yango ya motako mpe babikaki.

Lisolo oyo eteyi biso likambo moko ya ntina mingi. Biso nyonso tozali lokola Bayisraele oyo nyoka eswaki bango. Biso nyonso tokokufa. Bótala esika bozali, bokomona ete bato bazali konuna, kobɛla mpe kokufa. Ezali mpo baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, baboyaki kotosa Yehova, mpe biso nyonso tozali bana na bango. Kasi Yehova azwi bibongiseli mpo tózala na likoki ya kozwa bomoi ya seko.

Yehova atindaki Mwana na ye Yesu Kristo na mabele. Yesu abomamaki likoló ya nzete, mpo bato bakanisaki ete azali moto mabe. Kasi Yehova akabaki Yesu mbeka mpo na kobikisa biso. Soki tozali kotala Yesu, mpe soki tozali kolanda ye, tokoki kozwa bomoi ya seko. Tokolobela likambo yango lisusu nsima.

Mitángo 21:4-9; Yoane 3:14, 15.



Mituna

  • Na elilingi oyo, eloko nini elingami na nzete, mpe mpo na nini Yehova alobaki na Moize atya yango wana?
  • Ndenge nini Bayisraele bamonisi ete bazangi mpenza botɔndi na makambo nyonso oyo Nzambe asaleli bango?
  • Bato basɛngi Moize asala nini ntango Yehova atindaki banyoka eswaswa bango?
  • Mpo na nini Yehova alobaki na Moize asala nyoka ya motako?
  • Liteya nini tokoki kozwa na lisolo oyo?

Mituna mosusu

  • Tángá Mitángo 21:4-9.

    Likebisi nini tozwi na elimo oyo Bayisraele bazalaki na yango ya komilelalela mpo na biloko oyo Yehova azalaki kopesa bango? (Mit. 21:5, 6; Rom. 2:4)

    Na basiɛklɛ oyo elandaki, Bayisraele bakómaki kosala nini na nyoka yango ya motako, mpe Mokonzi Hizikiya asalaki nini? (Mit. 21:9; 2 Bak. 18:1-4)

  • Tángá Yoane 3:14, 15.

    Ndenge nini kotyama ya nyoka ya motako likoló ya likonzí ya elembo ezalaki elilingi ya liwa ya Yesu Kristo likoló ya nzete? (Gal. 3:13; 1 Pe. 2:24)