Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 46: Lopango ya Yeriko ekwei

Lisolo 46: Lopango ya Yeriko ekwei

BOZALI komona awa lopango ya Yeriko ezali kokwea. Ezali lokola nde bɔmbi ekweli yango. Kasi na ntango wana, babɔmbi ezalaki te. Ezali nde likamwisi mosusu ya Yehova. Tólanda ndenge esalemaki.

Lopango ya Yeriko ezali kokwea

Yehova alobi na Yosua ete: ‘Yo ná mibali ya etumba, bosengeli kotambola zingazinga ya engumba. Bokotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, bósala bongo mikolo motoba. Bómema sanduku ya kondimana ntango bozali kotambola. Banganga-nzambe nsambo bakotambola liboso na yango mpe bakoyula maseke na bango.

‘Na mokolo ya nsambo, bokotambola zingazinga ya engumba mbala nsambo. Na nsima, bóyula maseke ntango molai mpe bóbɛta ntangwa makasi ya etumba. Mpe lopango ya engumba ekokwea mobimba na nse!’

Yosua ná bato ya Yisraele basali kaka ndenge Yehova alobi. Ntango bazali kotambola zingazinga ya engumba, moto nyonso afandi nyɛɛ. Bazali koyoka bobele koyulama ya maseke mpe lokito ya makolo ya bato. Bongo, banguna ya basaleli ya Nzambe oyo bazali na Yeriko babangi makasi. Bozali komona nsinga ya motane oyo ekangami na lininisa? Ezali lininisa ya nani? Ya Rahaba; asali makambo oyo banɔngi mibale wana bayebisaki ye. Libota na ye mobimba bazali na ndako na ye, bazali kotala ndenge makambo ezali koleka.

Yosua

Nsukansuka, na mokolo ya nsambo, nsima ya kotambola zingazinga ya engumba mbala nsambo, bayuli maseke, mibali ya etumba bagangi mpe lopango ekwei. Bongo Yosua alobi ete: ‘Bóboma moto nyonso mpe bótumba engumba. Bótumba eloko nyonso. Bózwa kaka palata, wolo, motako mpe bibende mpe bótya yango na esika ya kobomba biloko ya motuya na hema ya Yehova.’

Yosua alobi na banɔngi mibale ete: ‘Bókɔta na ndako ya Rahaba mpe bóbimisa ye ná libota na ye mobimba.’ Rahaba ná libota na ye babikaki, kaka ndenge banɔngi mibale wana balakaki.

Yosua 6:1-25.



Mituna

  • Yehova alobaki na mibali ya etumba mpe banganga-nzambe básala nini na boumeli ya mikolo motoba?
  • Mibali yango basengelaki kosala nini na mokolo ya nsambo?
  • Ndenge bozali komona na elilingi, likambo nini ekómeli lopango ya Yeriko?
  • Mpo na nini nsinga moko ya motane ezali na lininisa?
  • Yosua alobaki na mibali ya etumba básala bato mpe mboka yango nini, kasi basengelaki kosala nini na palata, wolo, motako, mpe ebende?
  • Bayebisaki bato mibale oyo bakendeki kotala mboka yango básala nini?

Mituna mosusu